Salisá bango bázwa litatoli lisusu
1 Ntango tozali kosakola nsango malamu, mbala mingi tosololaka na bato oyo bafandaka na teritware na biso te to baoyo balobaka monɔkɔ mosusu, bakisá mpe elobeli ya bikela. Ekoki kozala ete bato mosusu oyo basepelaki na masolo ya Biblia oyo tosololaki na bango bazali lisusu kofanda na teritware na biso te. Tokoki kosala nini mpo bato ya ndenge wana bázwa lisusu litatoli? Tosengeli kosalela formilɛrɛ Intérêt à suivre dans une langue étrangère (S-70a) oyo ezali sikoyo na masangá. Na nsima, tokosalela formilɛrɛ Veuillez suivre l’intérêt (S-43).
2 Mbala mingi, bato bayokaka nsango malamu na likebi soki bateyi bango na monɔkɔ na bango. (Mis. 22:1, 2) Yango wana, na mabaku mingi, ntango tokutani na moto oyo alobaka monɔkɔ mosusu, tosengeli kotondisa formilɛrɛ wana ata soki moto yango asepeli mpenza te na nsango ya Bokonzi. Kasi, soki bato oyo balobaka monɔkɔ mosusu bazali mingi mpe bazwaka litatoli mbala na mbala na monɔkɔ na bango, ekoki kozala na ntina mpenza te kotondisa formilɛrɛ yango ntango moto asepeli te.
3 Kotondisa formilɛrɛ: Na mayele mpenza, zwá nkombo ya moto oyo bosololi na ye, esika afandaka, mpe nimero na ye ya telefone. Monisá soki moto yango asepelaki to te, esengeli kokutana na ye ntango nini, mokanda nini opesaki ye to asɛngaki, mpe monɔkɔ nini ayokaka malamu. Nsima ya kotondisa formilɛrɛ, pesá yango mbala moko na mokomeli ya lisangá oyo akotinda yango na lisangá to etuluku oyo esengeli.
4 Kotinda formilɛrɛ: Soki mokomeli ya lisangá ayebi lisangá to etuluku oyo asengeli kotinda formilɛrɛ yango te to azali na adrɛsi na bango te, akoki kobenga na biro mpo báyebisa ye makambo oyo asengeli na yango. Ezali na ntina te kosolola na mokɛngɛli ya engumba mpo na kotinda formilɛrɛ yango.
5 Soki lisangá to etuluku moko ezwi formilɛrɛ Intérêt à suivre dans une langue étrangère, basengeli kozongela moto yango mbala moko. Soki tozali kokokisa mokumba na biso na molende, tokoki kotyela Yehova motema ete akofungola mitema ya bato oyo bazali na “ezaleli oyo ebongi mpo na bomoi ya seko.”—Mis. 13:48.