Ndenge ya kosalela formilɛrɛ Veuillez suivre l’intérêt (S-43)
Tosengeli kotondisa formilɛrɛ yango soki tokutani na moto moko oyo asepeli na nsango malamu kasi afandaka na teritware na biso te to alobaka monɔkɔ moko ya bapaya. Atako kala tozalaki kotondisa formilɛrɛ yango soki tokutani na moto oyo alobaka monɔkɔ ya bapaya, ezala asepeli na nsango malamu to te, sikoyo tokotondisa yango kaka soki moto amonisi ete asepeli na nsango malamu. Bokeseni ezali kaka soki moto yango azali baba. Soki tokutani na baba, ezala asepeli na nsango malamu to te, tosengeli kotondisa formilɛrɛ S-43.
Tosengeli kosala na formilɛrɛ yango nini nsima ya kotondisa yango? Tosengeli kopesa yango sɛkrɛtɛrɛ ya lisangá. Soki ayebi lisangá oyo asengeli kotinda yango, akotinda yango epai ya bankulutu ya lisangá yango mpo báluka ndenge ya kosalisa moto oyo asepelaki na nsango malamu. Soki ayebi te lisangá nini asengeli kotinda yango, akotinda yango na biro ya filiale.
Soki moto oyo asepeli na nsango malamu alobaka monɔkɔ moko ya bapaya mpe afandaka na teritware na bino, bokoki kokoba kozongela ye mpo akoba kosepela na nsango malamu tii ntango akokutana na mosakoli moko ya lisangá ya monɔkɔ oyo ye ayebi.—Talá Mosala na biso ya Bokonzi ya Novɛmbɛ 2009, lokasa 4.