Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 3/05 lok. 5
  • Video oyo ezali na nsango ya ntina mingi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Video oyo ezali na nsango ya ntina mingi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2005
  • Masolo mosusu
  • “Teyá ngai nayeba kosala mokano na yo”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Davidi akimi Saulo
    Mokanda mpo na masolo ya Biblia
  • Mokanda ya Biblia nimero 10—2 Samwele
    “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
  • Yehova ‘asikolaki’ na ntango ya kala
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2005
km 3/05 lok. 5

Video oyo ezali na nsango ya ntina mingi

Nsango nini ezali na Video David : il mettait sa confiance en Dieu ? (Davidi: atyelaki Nzambe motema) Nsango yango elobi ete tosengeli kotyela Yehova motema ndenge Davidi asalaki. (Nz. 91:⁠2) Kotala bilingi ya makambo minene oyo Davidi asalaki na bomoi na ye, ekosalisa bana mike mpe mikóló bálanda ndakisa na ye. (Nz. 31:14) Mpo tókanga malamu ntina ya DVD yango, batii “mituna ya bozongeli,” mpe “badevuare ya kosala.”

Talá video yango mpe omituna boye: (1) Mpo na nini Yehova aponaki mokonzi ya malamu koleka? (1 Sam. 15:​10, 11; 16:⁠1) (2) Mpo na nini Yehova aponaki bandeko mosusu ya Davidi te? (1 Sam. 16:​6, 7) (3) Mpo na nini Saulo azalaki kolinga ete Davidi abɛtelaka ye nzɛnzɛ? (1 Sam. 16:​14-23) (4) Goliata azalaki nani? (1 Sam. 17:​4-10) (5) Mpo na nini Davidi andimaki kobunda na Goliata? (1 Sam. 17:​23, 24, 36, 37) (6) Yonatana azalaki nani? (1 Sam. 14:⁠1) (7) Ntango nini Saulo akómaki monguna monene ya Davidi? (1 Sam. 18:​25-29) (8) Mpo na nini Davidi abomaki Saulo te? (1 Sam. 26:​7-11) (9) Ndenge nini Saulo akufaki? (1 Sam. 31:​1-6) (10) Davidi asalaki nini ntango ayokaki ete Yonatana akufi? (2 Sam. 1:​11, 12) (11) Elaka nini Yehova apesaki Davidi? (2 Sam. 7:​12, 13, 16) (12) Makambo nini ya mabe Davidi asalaki? (2 Sam. 11:​1-5, 14-17) (13) Ndenge nini Davidi amonisaki ete ayokaki mawa mingi mpo na makambo oyo asalaki? (Nz. 51) (14) Toli nini Davidi apesaki elenge Salomo? (1 Mik. 2:​1-4; 1 Nta. 22:​6-13; 28:​9, 10) (15) Ndenge nini boyangeli ya Yesu ekopesa Davidi, Yonatana, ná yo matomba?​—⁠Yis. 11:​6-9; Yoa 11:​25, 26.

Sikoyo kanisá: Ndenge nini yo mpe okoki kotyela Nzambe motema ndenge Davidi asalaki?

Baboti, bósalisa bana na bino bámona ntina oyo basengeli lelo oyo kotyela Nzambe motema, ndenge Davidi asalaki.—Nz. 56:11.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto