Mosala ya kosakola esalisaka biso tóyika mpiko
1 Liloba ya Nzambe ezali kolendisa biso “tópota na koyika mpiko mpenza momekano ya mbangu oyo etyami liboso na biso.” (Ebe. 12:1) Ndenge mopoti mbangu asengeli koyika mpiko mpo na kolonga momekano ya mbangu, ndenge moko mpe biso tosengeli koyika mpiko mpo na kozwa mbano ya bomoi ya seko. (Ebe. 10:36) Ndenge nini mosala ya kosakola ekoki kosalisa biso tóyika mpiko na bosembo mpenza tii na nsuka?—Mat. 24:13.
2 Epesaka biso makasi na elimo: Kosakola elaka kitoko oyo Biblia epesi ya mokili ya sika ya boyengebene, esalisaka biso tókangama makasi na elikya na biso. (1 Tes. 5:8) Kobima na mosala ya kosakola mbala na mbala epesaka biso libaku ya koyebisa bato mateya ya solo oyo toyekolaki na Biblia. Yango epesaka biso nzela ya kolobela kondima na biso, mpe epesaka biso makasi na elimo.
3 Mpo tóteya basusu malamumalamu, biso moko tosengeli mpenza kokanga ntina ya mateya ya solo oyo ezali na Biblia. Tosengeli kolukaluka na mikanda mpe komanyola likoló na makambo oyo tozali kotánga. Milende oyo tosalaka mpo na kokóma na boyebi mingi, ekómisaka kondima na biso makasi mpe epesaka biso makasi na elimo. (Mas. 2:3-5) Na yango, ntango tozali koluka kosalisa basusu, biso moko tozali kozwa makasi.—1 Tim. 4:15, 16.
4 Kozala na molende na mosala ya kosakola ezali eteni ya ntina mingi ya “molato mobimba ya etumba oyo mouti na Nzambe,” oyo tosengeli kozala na yango mpo na kotɛlɛma makasi mpenza liboso ya Zabolo ná bademo. (Ef. 6:10-13, 15) Soki tozali kosala mingi na mosala ya bosantu, makanisi na biso ekozala ntango nyonso na makambo oyo etongaka mpe yango ekosala ete tóbebisama te na mokili ya Satana. (Kols. 3:2) Koteya basusu banzela ya Yehova, esalisaka biso tóbosana te ete tosengeli ntango nyonso kozala na etamboli ya bosantu.—1 Pet. 2:12.
5 Tozwaka makasi epai ya Nzambe: Mpo na kosukisa, mosala ya kopalanganisa nsango malamu eteyaka biso kotyela Yehova motema. (2 Kol. 4:1, 7) Oyo nde lipamboli! Soki tokolisi ezaleli ya kotyela Yehova motema ndenge wana, yango ekosalisa biso kaka te na kokokisa mosala na biso ya kosakola, kasi ekosalisa biso mpe tóyika mpiko na makambo nyonso oyo tokoki kokutana na yango na bomoi na biso. (Filp. 4:11-13) Lisusu, koyeba kotyela Yehova motema mobimba ezali sɛkɛlɛ mpo na koyika mpiko. (Nz. 55:22) Mosala ya kosakola esalisaka biso tóyika mpiko na lolenge mingi.