Tótambwisa boyekoli ya Biblia na ndenge oyo ekosalisa bato bákola
Eteni 10: Tólakisa bayekoli ndenge ya kosakola ndako na ndako
1 Soki bankulutu bataleli moyekoli ya Biblia mpe bamoni ete akokisi masɛngami mpo na kokóma mosakoli oyo azwi naino batisimo te, moyekoli yango akoki kobanda kosakola elongo na lisangá. (Talá buku Tobongisami mpo na kosala mokano ya Yehova, nk. 79-81 [od].) Ndenge nini tokoki kosalisa moyekoli ayeba kosakola ndako na ndako?
2 Bómibongisa esika moko: Eloko moko te ekoki kozwa esika ya komibongisa malamu. Lakisá moyekoli esika oyo akoki kozwa makanisi ya kobanda masolo na Mosala na biso ya Bokonzi mpe na buku Comment raisonner, mpe salisá ye apona maloba ya kobanda lisolo ya pɛtɛɛ mpe oyo ebongi na teritware ya lisangá na bino. Kaka na ebandeli, lendisá ye asalelaka Biblia ntango azali kosakola.—2 Tim. 4:2.
3 Soki moyekoli amekimeki lisolo na ye, yango ekosalisa ye mingi. Ntango moyekoli azali komekameka lisolo na ye, monisá ye oyo akoki kosala, na mayele mpenza, soki bapesi ye biyano oyo bato mingi ya teritware na bino bapesaka. (Kols. 4:6) Salisá ye ayeba ete kozala ministre moklisto elimboli te ete asengeli koyeba biyano ya mituna nyonso oyo bato oyo akosolola na bango bakoki kotuna ye. Mbala mingi, ekozala malamu ayebisa moto oyo atuni mituna ya ndenge wana ete akokende kolukaluka na mikanda mpe akozongela ye mpo bálobela likambo yango.—Mas. 15:28.
4 Bósakolaka elongo: Ntango moyekoli abimi mbala ya liboso na mosala ya kosakola ndako na ndako, tiká ye amona ndenge ozali kosala lisolo oyo bobongisaki bino mibale. Na nsima, tiká ye mpe aloba. Na bantango mosusu, ekoki kozala malamu kosɛnga mosakoli ya sika aloba kaka moke, na ndakisa atánga vɛrsɛ moko to alobela vɛrsɛ oyo bouti kotánga. Talelá bomoto ya moyekoli mpe makoki na ye. (Filp. 4:5) Pesáká ye longonya ntango ozali kolakisa ye mokemoke biteni ndenge na ndenge ya mosala ya kosakola.
5 Ezali na ntina kosalisa mosakoli ya sika amisalela programɛ ya kobimaka mbala na mbala na mosala ya kosakola, mpe kosakolaka pɔsɔ na pɔsɔ soki likoki ezali. (Filp. 3:16) Salá mpenza programɛ mpo na kosakolaka elongo na ye, mpe lendisá ye asakolaka mpe elongo na basakoli mosusu ya molende. Ndakisa na bango mpe ntango oyo azali kolekisa elongo na bango, ekosalisa ye ayeba kosakola ndako na ndako mpe asepela na mosala yango.