Tótambwisa boyekoli ya Biblia na ndenge oyo ekosalisa bato bákola
Eteni 12: Tósalisa bayekoli bábanda mpe bálanda koyekola na bato Biblia
1 Ntango bato oyo toyekolaka na bango Biblia babandi kobima na mosala ya kosakola, likanisi ya kobanda mpe kolanda koyekola na bato mosusu Biblia bango moko ekoki kobangisa bango. Ndenge nini tokoki kosalisa bango bábanga te kosangana na eteni wana ya ntina mingi ya mosala na biso?—Mat. 24:14; 28:19, 20.
2 Ntango moyekoli ya Biblia akokisi masɛngami mpo na kokóma mosakoli oyo azwi naino batisimo te, yango elingi koloba asalaka masolo na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi. Formasyo oyo azali kozwa ntango azali kobongisa mpe kosala masolo na eteyelo yango ekosalisa ye akolisa makoki ya koteya oyo esengeli mpo na kokóma “mosali oyo azali na eloko moko te ya koyokela nsɔni, oyo azali kosembola liloba ya solo malamumalamu.”—2 Tim. 2:15.
3 Ndakisa na yo ekoteya ye: Yesu apesaki bayekoli na ye formasyo na malako ya polele oyo apesaki bango mpe na ndakisa na ye ya malamu. Alobaki ete: “Moto nyonso oyo alakisami malamumalamu akozala lokola moteyi na ye.” (Luka 6:40) Ezali na ntina mingi olanda ndakisa ya Yesu, elingi koloba yo moko ozala ndakisa malamu na mosala ya kosakola. Ntango moto oyo boyekolaka na ye akotala ndakisa na yo na mosala ya kosakola, akokanga ntina ete bazongelaka bato mpo na kobanda koyekola na bango Biblia.
4 Limbolelá ye ete ntango tosɛngi moto mpo tóyekola na ye Biblia, ezalaka mpenza na ntina te koyebisa ye makambo nyonso tosalaka mpo na koyekola. Mbala mingi, esɛngaka kaka koyekola na ye mbala moko paragrafe moko to mibale ya mokanda oyo tokoyekola mpo na komonisa ye ndenge toyekolaka. Tokoki kokuta makanisi mosusu oyo ekosalisa biso na kosala bongo na Mosala na biso ya Bokonzi oyo, na lokasa 8 mpe na Mosala na biso ya Bokonzi ya Yanuali 2002, na lokasa 6.
5 Soki ebongi, bengá moto oyo boyekolaka na ye Biblia bóbima na ye to abima na mosakoli mosusu ya makoki mpo na koyekola Biblia na bato mosusu. Akoki kopesa makanisi na paragrafe moko to na mokapo moko ya ntina. Na ndenge wana, lokola azali komona, akoyekola makambo mingi mpo na kotambwisa boyekoli ya Biblia na ndenge oyo ekosalisa bato bákola. (Mas. 27:17; 2 Tim. 2:2) Pesá ye longonya mpe sololá na ye na bisika oyo asengeli kobongisa.
6 Kopesa basakoli ya sika formasyo mpo bákóma bateyi ya Liloba ya Nzambe, ekobongisa bango mpo na ‘mosala malamu’ ya kobanda mpe kolanda koyekola na bato bango moko. (2 Tim. 3:17) Ezali mpenza esengo kosala elongo na bango mpo na kobengisa bato na bolingo nyonso ete: “Tiká moto nyonso oyo alingi, akamata mai ya bomoi ofele”!—Emon. 22:17.