Bandá koyekola na bato Biblia na porte na bango to na telefone
1, 2. Ndenge nini tokoki koyokanisa programɛ na biso ya koyekola na bato Biblia mpo na kosalisa bato oyo bazali na ntango te?
1 Lelo oyo, bato mingi bazali na ntango te. Atako bongo, mingi bazali na mposa ya koyoka makambo ya Nzambe. Ndenge nini tokoki kosalisa bango bákokisa mposa na bango ya elimo? (Mat. 5:3) Basakoli mingi bakoki koyekola na bato Biblia na porte na bango to na telefone. Okoki kokolisa mosala na yo ya kosakola na lolenge wana?
2 Mpo na kobanda koyekola na bato Biblia, tosengeli komibongisa mpo na kolakisa bato yango ndenge toyekolaka Biblia na esika nyonso oyo tozwi likabu ya kosala yango. Ndenge nini mpe epai wapi tokoki kosala yango?
3. Mpo na nini ezali malamu kolakisa moto ndenge toyekolaka Biblia kaka na mbala ya liboso oyo bokutani na ye, mpe ndenge nini okoki kosala yango?
3 Koyekola na bato na porte na bango: Ntango okutani na moto oyo andimi bósolola na Biblia, fungolá mbala moko mokanda na paragrafe moko oyo obongisaki liboso, na ndakisa paragrafe ya liboso ya liteya 1 na mwa buku Azali kosɛnga, mpe bandá koyekola na ye. Tángá paragrafe yango, tuná motuna, mpe bótalela vɛrsɛ moko to mibale oyo batye maloba na yango na paragrafe te. Mbala mingi, yango ekoki kosalema kaka na porte na ye, na miniti mitano to zomi. Soki moto asepeli na lisolo yango, bóyokana mpo na kotalela paragrafe moko to mibale oyo elandi mokolo mosusu—Okokuta makanisi mosusu mpo na lolenge wana ya kobanda koyekola na bato na Mosala na biso ya Bokonzi ya Yanuali 2002, lokasa 6.
4. Ndenge nini tokoki kobanda koyekola na moto Biblia na porte na ye ntango tozongeli ye?
4 Tokoki mpe kosalela mayele yango mpo na kobanda koyekola na bato Biblia ntango tozali kozongela bango. Na ndakisa, okoki kokɔtisa ye na mwa buku Azali kosɛnga, kosalela liteya 2, paragrafe 1-2 mpo na kolakisa ye nkombo ya Nzambe. Ntango okozongela ye, bokoki kotalela paragrafe 3-4 mpo na kolimbola oyo Biblia elobi mpo na bizaleli ya Yehova. Na mbala oyo ekolanda, bokoki kotalela paragrafe 5-6 mpe elilingi oyo ezali na lokasa 5, mpo na komonisa ndenge oyo boyekoli ya Biblia esalisaka biso tóyeba Yehova. Nyonso wana ekoki kosalema ntango botɛlɛmi na porte na ye.
5, 6. (a) Mpo na nini bato mosusu bakoki kosepela koyekola Biblia na telefone? (b) Mayele nini tokoki kosalela ntango tozali kosɛnga moto soki akondima koyekola na telefone?
5 Na telefone: Bato mosusu bakoki kondima koyekola Biblia na telefone na esika bókutanaka mpo na koyekola. Tótalela ndakisa oyo: Ndeko mwasi moko azalaki kosakola ndako na ndako mpe akutanaki na mwana mwasi moko oyo azali na bana mpe mosala na ye etikelaka ye ntango te. Lokola ndeko mwasi azalaki lisusu kokuta ye na ndako te, amonaki malamu abenga ye na telefone. Mwasi yango alimbolaki ete azalaki mpenza na ntango te ya kosolola masolo ya Biblia. Ndeko mwasi alobaki na ye boye: “Okoki koyekola likambo moko ya sika na miniti 10 to 15, ata na telefone.” Mwasi yango azongisaki boye: “Soki ezali na telefone, nandimi!” Eumelaki te, bakómaki koyekola mbala na mbala na telefone.
6 Bato mosusu oyo okendaka kotala bango bakoki kondima koyekola na telefone? Okoki komeka kosalela mayele oyo ndeko mwasi wana asalelaki, to okoki kaka koloba boye: “Soki olingi, tokoki koyekola Biblia na telefone. Yango ekozala malamu mpo na yo?” Soki toyokanisi programɛ na biso ya koyekola Biblia na mposa ya bato mosusu, tokoki kosalisa bango ‘bázwa boyebi ya Nzambe.’—Mas. 2:5; 1 Kol. 9:23.