Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 2/01 nk. 5-6
  • Ndenge nini kopesa litatoli na telefone?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndenge nini kopesa litatoli na telefone?
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2001
  • Masolo mosusu
  • Kopesa litatoli na telefone ekoki kobota mbuma malamu
    Mosala na biso ya Bokonzi—2009
  • Bandá koyekola na bato Biblia na porte na bango to na telefone
    Mosala na biso ya Bokonzi—2005
  • Biyano na mituna na bino
    Mosala na biso ya Bokonzi—2003
  • Tósakola nsango malamu bipai nyonso
    Mosala na biso ya Bokonzi—1996
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2001
km 2/01 nk. 5-6

Ndenge nini kopesa litatoli na telefone?

1 Mokano na biso Batatoli ya Yehova ezali kaka te ya komipesa na mosala ya kosakola nsango malamu kasi ezali mpe ya kokutana na moto nyonso soki likoki ezali mpo na koyebisa ye nsango ya Bokonzi. (Mis. 10:42; 20:24) Atako mosala ya kosakola na ndako na ndako ezali ntango nyonso lolenge malamu ya kokutana na bato, tomoni ete ata na lolenge yango tokoki kokutana na moto nyonso te. Na yango, mpo na ‘kokokisa mosala na biso malamu,’ tozali kosalela mpe lolenge mosusu​—bakisá mpe lolenge ya kopesa litatoli na nzela ya telefone​—mpo na kokutana na bato oyo bakokani na bampate.​—2 Tim. 4:5.

2 Na bisika mingi, bato bafandaka na bandako oyo ebatelami makasi, na bandako oyo ezali na mabota mingi, to na mapango oyo ezali mpasi mpo na kokota mpo na kosakola ndako na ndako. Ata na bateritware epai tokoki kosakola ndako na ndako, bato mingi bazalaka na bandako na bango te. Nzokande, basakoli mingi, bazwaki matomba malamu ntango bazali komeka kokutana na bato yango na nzela ya telefone. Mokolo moko na ntɔngɔ ntango babimaki na mosala ya kosakola ndako na ndako ndeko mobali moko na mwasi na ye bakutaki bato te na bandako libwa. Ntango bazongaki na Ndako ya Bokonzi batalaki na buku oyo ezali na liste ya banimero ya telefone mpe balukaki adresi ya ndako moko moko. Babengaki mpe basololaki na bato na bandako mwambe!

3 Okakatanaka mpo na kosakola na nzela ya telefone? Ndeko moko alobaki ete: “Nalingaka te ete moto abenga ngai ntango nazali na ndako mpo na kotekela ngai eloko, yango wana nasepelaka mpenza te na lolenge wana ya kopesa litatoli.” Kasi, ntango abengaki bato mbala mibale na telefone, alobaki ete: “Nasepeli na yango! Nandimaki te ete nakoki kozwa matomba ya ndenge wana, kasi sikoyo nasepeli na yango mpenza! Bato bazalaka motema ya kokita ntango ozali kosolola na bango na telefone, mpe eloko nyonso oyo ozali na yango mposa ezali wana liboso na yo. Yango ezali mpenza kobimisa matomba mingi!” Ndeko mwasi moko azalaki mpe na likanisi yango: “Nazalaki mpenza te kosepela na kopesa litatoli na nzela ya telefone. Mpo na koloba solo, nazalaki kolinga kosala yango te. Kasi ntango namekaki yango, namonaki ete ezali kobimisa mpenza matomba. Nazali na bato 37 oyo nazongelaka bango na nzela ya telefone mpe bato baleki mingi mpo nakoka koyekola na bango nyonso Biblia!” Soki olingi komeka kopesa litatoli na nzela ya telefone, yo mpe okoki kozwa matomba ya malamu!

4 Tómibongisa mpo na kopesa litatoli na nzela ya telefone: Ezali mokɛngɛli na mosala ya kosakola nde atalelaka likambo ya kopesa litatoli na kati ya lisangá. Na kotalela mposa, lisangani ya bankulutu bakoki kopona nkulutu mosusu to mosaleli na misala oyo azali na makoki mpo asala elongo na mokɛngɛli na mosala mpo na kobongisa likambo ya kopesa litatoli na nzela ya telefone. Ndeko oyo atalelaka makambo ya bateritware asengeli mpe kosala elongo na bango, lokola ezali ye moto apesaka bateritware mpe alandelaka makambo na yango. Ndenge moko mpe mokɛngɛli ya zongazonga asengeli koyeba ndenge makambo yango ezali kotambola.

5 Soki ezali na esika moko na kati ya teritware na bino epai likoki ya kosala ndako na ndako ezalaka te, bosengeli kozwa bibongiseli mpo na kosakola na bateritware yango na telefone. Ndeko oyo azwi mokumba yango, akosala liste ya baadrɛsi ya teritware oyo esengeli kosalela telefone mpo na kosakola. Yango esengeli kozala bateritware ya mikemike mpenza mpo na kopesa likoki ete esalelama mbala na mbala. Esengeli kotya bilembo na bakalati nyonso ya teritware oyo ezali na baadresi yango. Esengeli komonisa polele bisika oyo ebongisami mpo na kopesa litatoli na nzela ya telefone.

6 Epai wapi bokoki kozwa banimero ya telefone? Bokoki kozwa buku oyo ezali na liste ya banimero ya telefone pembeni ya baadresi ya ndako na bibliotɛkɛ ya Leta. Soki ndako moko monene oyo bakɛngɛlaka yango makasi ezali na liste na yango moko ya banimero ya telefone, mbala mosusu bokoki kozwa banimero ya telefone na liste yango. Soki bongo te, bokoki kokoma bankombo ya bato oyo bafandaka kuna, na liste oyo ezali na porte mpe na nsima bokoki koluka bankombo yango na buku oyo ezalaka na banimero ya telefone.

7 Bankulutu bakoki kotya mpenza likebi na mosala yango; bakoki kobongisa mpo basakoli oyo bamesani mingi na kopesa litatoli na nzela ya telefone básalisa basakoli mosusu, mbala mosusu na programe babongisi-nzela bazali kosalisa bato mosusu. Mbala na mbala, na Likita ya Mosala, eteni oyo elobelaka mposa ya lisangá ekoki komonisa matomba ya lolenge yango ya kopesa litatoli.

8 Ntango bankulutu bazali kokende kotala bampate, na ndakisa bandeko oyo bazali kobɛla mpe babimaka lisusu te, bibɔsɔnɔ, bakoki kolendisa bango ete bapesaka litatoli na nzela ya telefone. Ntango mosusu nkulutu moko akoki komeka kopesa litatoli na nzela ya telefone mpo na kolakisa ndeko ndenge basalaka. Na nsima, mosakoli yango akoki kobenga na telefone. Basakoli mingi oyo babandaki kosala bongo bazali kolekisa mwa miniti mokolo na mokolo na mosala ya kosakola, mpe balingaka yango mingi.

9 Toli mpo na kolonga: Ntango Yesu atindaki bayekoli na ye na mosala ya kosakola, “atindaki bango mibale mibale.” (Luka 10:1) Mpo na nini? Ayebaki ete ntango bato bazali kosala elongo, moko moko akoki koyekola makambo epai ya moninga mosusu mpe bongo koyikisana mpiko. Ezali mpe bongo mpo na kopesa litatoli na nzela ya telefone. Ntango bozali kosala yango bato mibale, mokomoko akoki koyekola makambo epai ya moninga mosusu, bokoki kosolola mpo na matomba oyo yango ezali kobimisa, mpe kopesana makanisi mpo na ndenge ya kosala ntango bokobenga lisusu moto yango. Ata ntango moninga azali kosolola na moto na telefone bokoki kosalisana, mosusu akoki kosalisa moninga mpo azwa makanisi ya sikisiki oyo asengeli na yango.

10 Mpo oyeba makambo oyo olingi koloba mpe makanisi na yo etambolatambola te, fandá esika oyo okoki kotanda mikanda na yo mpo na kopesa litatoli kozanga mindondo​—Biblia, buku Comment raisonner, mwa buku Azali kosɛnga, bazulunalo, mpe mikanda mosusu, esengeli kozala liboso na yo. Komá mwa maloba ya kobanda lisolo mpe tyá yango na esika oyo okoki komona yango. Omibongisa mpo na kokoma malamumalamu nkombo, mpe adrɛsi ya bato oyo osololi na bango, dati mpe ngonga mpo na koyeba ndenge ya kolandela lisusu lisolo na bato oyo basepeli.

11 Mbala mingi bato bazalaka na bokɛngi, ntango bayoki mongongo moko oyo bameseni na yango te na telefone. Na yango, mongongo na yo esengeli komonisa ete ozali na esengo, ozali koloba na boninga mpe na mayele. Moto oyo ozali kosolola na ye akoki koyeba ezaleli na yo mpe soki ozali sembo bobele na mongongo na yo. Osengeli kozala na kobanga te mpe koloba mpenza na motema na yo. Koloba mbangumbangu te mpe lobá polele mpe mongongo na yo esengeli koyokana malamu. Tiká mpe moto oyo ozali kosolola na ye alobaka. Osengeli kopesa nkombo na yo mobimba, mpe komonisa ete ofandaka na kartye to engumba yango. Tosengeli te kotinda bato bákanisa ete tozali kosala piblisite ya biloko na telefone. Na esika ya koloba ete ozali kobenga bato nyonso oyo bafandaka na ndako yango to na lopango yango, okoki koloba ete obengi ye.

12 Ndenge nini kobanda lisolo na telefone: Maloba mingi ya kobanda lisolo oyo ezali na nkasa 9 kino 15 ya buku Comment raisonner ekoki mpe kosalelama mpo na kopesa litatoli na nzela ya telefone, soki tobongoli yango mwa moke. Okoki koloba: “Nabengi yo na telefone mpamba te nazali na likoki te ya koya na ndako na yo mpo na kokutana na yo. Ntina oyo nabengi ezali mpo na kotuna likanisi na yo na motuna moko ya ntina mingi.” Na nsima yebisá motuna yango.

13 Maloba ya liboso oyo ezali na nse ya motó ya likambo “Crime/Sécurité” ekoki kosalelama boye: “Mbote. Nkombo na ngai . . . . Nafandaka na kartye to engumba oyo. Nalingi koyebisa yo ete nazali motɛkisi biloko te to nazali mpe koluka te kosala ankɛtɛ. Nabengi yo mpo nazali komitungisa mingi na ntina na libateli ya moto na moto. Makambo mingi ya mabe ezali kosalema esika oyo tofandi, mpe likambo yango ezali kotungisa biso. Okanisi ete ekozala na ntango oyo bato lokola yo mpe ngai bakotambola na butu kati na nzela kozanga kobanga? [Tiká ye apesa eyano.] Tiká natánga likambo oyo Nzambe alaki kosala.”

14 Kolendisa moto mbala moko na nzela ya telefone mpo na koyekola Biblia ebimisaka matomba malamu. Tokoki komonisa na mokuse ndenge ya kosala boyekoli yango. Okoki koyebisa moto yango ete okosepela koya na ndako na ye mpo na kokoba boyekoli yango, to soki moto yango azali kokakatana, okoki koyebisa ye ete okobenga ye mokolo mosusu na telefone mpo bokoba boyekoli.

15 Liboso osilisa lisolo, osengeli kobosana te likambo oyo ekosalisa yo mpo okende kotala moto yango na ndako na ye to kotindela ye mwa mokanda. Soki moto yango azali kokakatana mpo na kopesa yo adrɛsi na ye, yebisá ye ete okobenga ye lisusu. Ekoki kosɛnga kosolola na ye mbala mingi liboso ete andima kobenga yo na ndako na ye.

16 Bandá: Mokolo moko na ntɔngɔ, ndeko mwasi moko oyo azali na mbula 15 abandaki kopesa litatoli na nzela ya telefone. Asololaki na mwasi moko oyo andimaki buku Boyebi. Ntango elenge mwasi yango akendaki kotikela ye buku na ndako na ye, mwasi yango alukaki koyeba ndenge nini elenge mwasi wana azwaki nimero ya telefone na ye, mpo yango ezalaki na kati ya liste te. Ndeko mwasi yango alingaki kobenga nde moto mosusu kasi nimero yango ebimaki epai ya mwasi wana! Mwasi yango andimaki koyekola mpe lelo oyo azali mosakoli oyo azwi naino batisimo te.

17 Ndeko mwasi moko azwaki teritware moko mpo na kopesa litatoli na telefone kasi azalaki kokakatana mpo na kobenga na boumeli ya pɔsɔ misato mpo azalaki kobanga. Nini epesaki ye nguya ya kobanda? Akanisaki lisolo moko oyo ezali na Lamuká! ya 22 Yanuali 1997 (ebimeli ya Lifalanse) oyo ezali na motó ya likambo: “Soki nazali na bolembu, ezali nde ntango nazali na nguya.” Ezali lisolo ya Ndeko mwasi moko oyo apesaka litatoli na nzela ya telefone atako azali ebɔsɔnɔ. Ndeko mwasi yango alobaki ete: “Nasambelaki Yehova mpe nasɛngaki ye apesa ngai nguya. Nasɛngaki ye apesa ngai maloba oyo ebongi mpo na kobanda lisolo.” Litomba nini azwaki mbala ya liboso oyo apesaki litatoli na nzela ya telefone? Alobi boye: “Yehova ayanolaki na libondeli na ngai. Bato bayokaki ngai na likebi nyonso, mpe nazwaki bibongiseli mpo na kozongela bango.” Na nsima moto moko kati na bato oyo apesaki bango litatoli na nzela ya telefone andimaki koyekola Biblia. Na nsuka alobi boye: “Yehova ateyi ngai lisusu ete nasengeli kotyela ye motema kasi namityela motema te.”​—Mas. 3:5.

18 Kolakisa solo na nzela ya telefone ekómi lolenge moko ya kopesa litatoli oyo ezali kobimisa matomba mingi. Omibongisa malamumalamu, mpe ósala yango na motema na yo mobimba. Kolɛmba te soki na mbala ya liboso oyo obengi bato basepeli te. Bondelá Yehova ete atambwisa yo, mpe luká kosolola na basakoli mosusu oyo bapesaka mpe litatoli na lolenge yango. Lokola tozali na mposa ya kozanga moto moko te na kati ya teritware na biso, tiká tósala mosala na biso ya kosakola malamumalamu mpe na lombangu.​—Lom. 10:13, 14.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto