Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 9/05 lok. 1
  • Salelá ntango na yo na mayele

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Salelá ntango na yo na mayele
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2005
  • Masolo mosusu
  • Tyá kominanola na esika ebongi na yango
    Mosala na biso ya Bokonzi—2001
  • Lolenge ya komisombela ntango malamu
    Mosala na biso ya Bokonzi—1996
  • Oponaka kominanola oyo ebongi?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Makambo nini otyaka na esika ya liboso?
    Mosala na biso ya Bokonzi—2006
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2005
km 9/05 lok. 1

Salelá ntango na yo na mayele

1 Mposa ya kosepelisa Yehova etindaka biso tómipesa mobimba na makambo ya elimo. Liloba na ye eteyi biso ‘tókoba koluka liboso bokonzi’ mpe ‘tótalela malamumalamu makambo eleki ntina.’ (Mat. 6:33; Filp. 1:10) Ndenge nini tokoki kozwa ntango ya kosala makambo etali Bokonzi mpe kotika makambo ya ntina mingi te na esika na yango?​—⁠Ef. 5:​15-17.

2 Tyá misala ya Bokonzi na esika ya liboso: Salá programɛ ya malamu mpo obebisa ntango na yo te na makambo ezangi ntina. Basusu bakomaka mpenza mikolo oyo bakobima na mosala ya kosakola na Calendrier na bango, kaka na ebandeli ya sanza. Mpe na nsima, basalaka nyonso mpo makambo mosusu ebebisa programɛ yango te. Tokoki mpe kosala bongo mpo na kozwa ntango ya koyangana na makita, koyekola Biblia biso moko, mpe kokende na mayangani. Basusu basalá programɛ ya kotángaka Biblia mokolo na mokolo, na ntɔngɔ to na mpokwa. Bongisá ntango mpo na likambo mokomoko ya ntina mingi, mpe kotika te ete makambo oyo ezali na ntina mingi te ebebisa programɛ yango.​—⁠Mos. 3:1; 1 Kol. 14:⁠40.

3 Kosalela mokili na makambo nyonso te: Na bamboka mosusu, moto nyonso azali na likoki ya kosala masano, kominanola, kozwa mopɛpɛ, mpe kosakana ndenge mosusu. Bato mingi balekisaka ntango mingi na kotala televisyɔ to na ordinatɛrɛ. Nzokande, kozanga ntembe, komipesa mingi na koluka kosepelisa nzoto to na biloko oyo mokili ezali kobimisa ememaka mawa. (1 Yoa 2:​15-17) Na yango, Makomami elendisi biso tósalela mokili na makambo nyonso te. (1 Kol. 7:31) Soki oyoki toli wana ya bwanya, Yehova akomona ete ozali kotya losambo na ye na esika ya liboso na bomoi na yo.​—⁠Mat. 6:​19-21.

4 Ebongiseli ya makambo ya ntango oyo ekómi na nsuka na yango. Baoyo batyaka misala ya Bokonzi na esika ya liboso bakozala na esengo mpe bakondimama na Nzambe. (Mas. 8:​32-35; Yak. 1:25) Na bongo, tiká ete tósalela ntango na biso, eloko ya motuya mingi oyo tozali na yango, na mayele.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto