Tósakola nkembo ya Yehova
1 Mokomi ya nzembo alobaki ete: “Bóyembela Yehova, bino bato ya mokili mobimba. . . . Bóyebisa nkembo na ye kati na bikólo, kati na bato nyonso misala na ye ya kokamwa.” Soki tokanisi makambo oyo Yehova asalá mpo na biso, oyo azali kosala, mpe oyo akosalela biso na mikolo ezali koya, tokozala na mposa makasi ya kosakola nkembo na ye!—Nz. 96:1, 3, NW.
2 Na mosala na biso ya kosakola: Batatoli ya Yehova bazali na libaku malamu ya komema nkombo ya Nzambe mpe ya kokumisa yango liboso ya bato nyonso, na mabelé mobimba. (Mki. 1:11) Bakeseni mpenza na bakonzi ya mangomba oyo, na lolendo nyonso, balongolá nkombo ya Nzambe na mabongoli na bango ya Biblia! Esengeli koyebisa bato nkombo ya Nzambe na lombangu mpenza, mpamba te basengeli kobelela nkombo yango na kondima mpenza mpo bábika na bolɔzi monene oyo ezali koya. (Lom. 10:13-15) Epai mosusu, mpo molɔ́ngɔ́ mobimba ezala na kimya, bakisa mpe bato oyo bafandi na mabelé, esengeli naino nkombo ya Nzambe esantisama. Esengeli mpenza kozala bongo, mpamba te misala nyonso ya Nzambe ezali na boyokani na nkombo na ye.
3 “[Yehova] azali monene mpe akoki na kokumisama.” Kasi, mpo bato bápesa ye “lokumu oyo ekoki na nkombo na ye,” basengeli koyeba solo na ntina na ye. (Nz. 96:4, 8) Nzokande, bato mosusu bandimaka te ete Nzambe azali. (Nz. 14:1) Basusu balobaka ete azali na nguya ya kosala eloko moko te, to akipaka te makambo oyo bato basalaka. Ntango tozali kosalisa bato ya mitema sembo bákóma na boyebi ya solo na ntina etali Mozalisi na biso, mikano na ye mpe bizaleli na ye, tozali kopesa Yehova nkembo.
4 Na etamboli na biso: Kotosa mitinda ya sembo ya Yehova, ekumisaka ye. Bato batyaka likebi na etamboli na biso ya malamu. (1 Pet. 2:12) Na ndakisa, soki tozali na molato ya pɛto mpe oyo ebongisami malamu, yango ekoki kotinda bato mosusu báloba malamu mpo na biso, mpe tokoki kozwa libaku ya koyebisa bango matomba oyo bakozwa soki basaleli mitinda oyo ezali na Liloba ya Nzambe. (1 Tim. 2:9, 10) Tosepelaka mpenza ntango bato mosusu ‘bamonaka misala na biso ya malamu mpe bapesaka nkembo epai ya Tata na biso oyo azali na likoló’!—Mat. 5:16.
5 Tiká tókumisaka Yehova mokolo na mokolo, ezala na maloba to na misala na biso, mpe tóndima na esengo mpenza libyangi oyo : “Bóyembela [Yehova], bókumisa nkombo na ye, bósakola kobikisa na ye mokolo na mokolo.”—Nz. 96:2.