Oyo mosala na biso ya kosakola ekokisaka
1. Ndenge nini Yehova atalelaka mosala na biso ya kosakola, mpe ndenge nini bato batalelaka yango?
1 Liloba ya Nzambe elobi ete baklisto bazali kotambola na bolongi mpenza na mosala ya Yehova, lokola bato oyo bazali kosala defile mpo na kosepela bolongi moko. (2 Kol. 2:14-16) Ntango tozali kosalisa bato báyeba Nzambe, mosala na biso ya kosakola ezali lokola mpaka ya malasi ya nsolo kitoko mpo na Yehova. Bato mosusu bamonaka ete nsango malamu ezali kitoko mpenza mpe babendamaka na yango; nzokande basusu basepelaka na yango te. Kasi, ezali te mpo bato mingi bazali koboya koyoka nsango malamu nde tokoloba ete mosala na biso ezali kobota mbuma te. Tiká tótalela oyo mosala na biso ya kosakola ekokisaka.
2. Mosala na biso ya kosakola epesaka biso libaku ya komonisa nini?
2 Ekumisaka Yehova: Satana alobaki ete bato basalelaka Yehova mpo na matomba na bango moko. (Yobo 1:9-11) Mosala ya kosakola epesaka biso libaku ya komonisa ete soki tozali kokangama na Nzambe, ezali mpo tolingaka ye na bolingo ya solosolo. Basakoli mingi bazali kokoba kotosa etinda ya kosakola mpe ya kokómisa bato bayekoli atako bazali na bomoi ya mpasi to atako bato mingi bazali kosepela na nsango malamu te. Ndenge oyo bazali koyika mpiko na bosembo nyonso esepelisaka mpenza motema ya Yehova!—Mas. 27:11.
3. Mpo na nini ezali na ntina mingi tókoba koyebisa bato nkombo ya Nzambe mpe mikano na ye?
3 Lisusu, mosala na biso ya kosakola ezali na ntina mingi mpo ezali kokokisa mokano ya Nzambe. Mpo na kobebisama ya mokili ya Satana oyo ekosalema na mikolo ezali koya, Yehova alobi boye: “Mabota bakoyeba ete ngai nazali [Yehova].” (Ezek. 39:7) Mpo mabota báyeba likambo yango, ezali na ntina mingi basaleli ya Nzambe bákoba kosakola nkombo na ye mpe mikano na ye “epai ya bikólo nyonso mpe mabota nyonso mpe minɔkɔ nyonso mpe mikili nyonso.”—Emon. 14:6, 7.
4. Ndenge nini mosala ya kosakola epesaka Nzambe ntina ya kosambisa bato?
4 Epesaka Nzambe ntina ya kosambisa bato: Mosala ya kosakola nsango malamu ezali mpe kopesa Nzambe ntina ya kosambisa bato. Ntoma Paulo alobaki ete Klisto Yesu akozongisa mabe epai ya “ baoyo bayebi Nzambe te mpe baoyo bazali te kotosa nsango malamu oyo etali Nkolo na biso Yesu.” (2 Tes. 1:8, 9) Bato bakosambisama na kolanda ndenge oyo bazali kotalela nsango malamu. Yango etye mokumba monene mpenza na motó ya basaleli ya Nzambe! Mpo tózala na nyongo ya makila te, tosengeli kotika te koyebisa bato nsango malamu ya Bokonzi, oyo ebikisaka bomoi ya bato.—Mis. 20:26, 27.
5. Ndenge nini mosala na biso ya kosakola emonisaka motema mawa ya Nzambe?
5 Milende oyo tozali kokoba kosala mpo na kosalisa basusu bándimama epai ya Nzambe, ezali elembo ya motema mawa ya Yehova. (1 Tim. 2:3, 4) Lokola toyebi ete bomoi ya bato ezali kobongwana ntango nyonso, tozongelaka bango mbala na mbala mpe tólendisaka bango báluka Yehova lokola ntango ezali naino. Ntango tozali kosala bongo, tozali komonisa “mawa monene ya Nzambe na biso” oyo “alingi te moto ata moko abomama kasi alingi nde bato nyonso bákóma na kobongola motema.”—Luka 1:78; 2 Pet. 3:9.
6. Ndenge nini kozala na mingi ya kosala na mosala ya Yehova esalisaka biso?
6 Esalisaka biso: Kozala na makambo mingi ya kosala na mosala ya Nzambe ebatelaka biso. Esalisaka biso tóbatela “na makanisi kozala ya mokolo ya Yehova” mpe ebatelaka biso mpo tóbebisama te na ebongiseli ya makambo mabe ya ntango oyo. (2 Pet. 3:11-14; Tito 2:11, 12) Na bongo, tiká ete ‘tópikama makasi, tóninganaka te, tózala ntango nyonso na mingi ya kosala na kati ya mosala ya Nkolo,’ koyebáká ete milende oyo tozali kosala na mosala ya kosakola ezali ya mpamba te.—1 Kol. 15:58.