Monisá ete osepelaka na bato —Na koyokanisáká masolo na yo na bamposa na bango
1 Ntoma Paulo apesaki ndakisa malamu na ndenge azalaki ntango nyonso koyokanisa ndenge na ye ya koyebisa bato nsango malamu na bomoi mpe makanisi ya bato yango. (1 Kol. 9:19-23) Biso mpe tosengeli kosala makasi tólanda ndakisa na ye. Mbala mingi, soki tokanisi moke liboso, tokoki koyokanisa maloba ya kobanda masolo oyo bapesaka lokola ndakisa na Mosala na biso ya Bokonzi, na bamposa ya bato ya teritware na biso. Ntango tozali kopusana penepene na ndako moko, tokoki komona biloko mosusu oyo ekoki kosalisa biso tóyeba makambo oyo esepelisaka moto oyo tolingi kosolola na ye mpe tólobela makambo yango na lisolo na biso. Nzokande, ezali na ndenge mosusu oyo tokoki koyokanisa masolo na biso na bamposa ya bato.
2 Tóyokanisa masolo na biso na makambo moto oyo tozali kosolola na ye alobi: Ntango tozali koyebisa moto nsango malamu, mbala mingi totunaka ye motuna moko mpe tozelaka apesa eyano. Ndenge nini otalelaka eyano oyo moto apesi? Ozalaka na momesano ya komonisa kaka ete ondimi yango mpe okobaka na lisolo ndenge obongisaki? To makambo oyo ozali koloba emonisaka ete otye likebi na eyano ya moto oyo ozali kosolola na ye? Soki omonisaka mpenza ete osepeli na makambo oyo basusu bazali koloba, na mayele mpenza, okokoka kotuna bango mituna mosusu oyo ekosalisa bango bábimisa makanisi oyo bazali na yango na nse ya motema. (Mas. 20:5) Yango ekosalisa yo olobela mingi makambo etali nsango ya Bokonzi oyo eyokani mpenza na makambo oyo etungisaka moto oyo azali koyoka yo.
3 Yango ezali kosɛnga tóndima kolobela masolo mosusu, kasi kaka te oyo tobongisaki na ndako. Soki na ebandeli tolobelaki likambo moko oyo toyokaki na radio to na televizyo, kasi moto oyo tozali kosolola na ye alobeli nde likambo moko oyo esalemaki na esika afandi to likambo moko oyo ezali kotungisa ye; lokola tolingi mpenza kokokisa bamposa na ye, tokolobela mingi masolo ya Biblia oyo elobeli likambo oyo ezali na ntina koleka mpo na ye.—Filp. 2:4.
4 Maloba na biso ya kobanda lisolo etala moto oyo tozali kosolola na ye: Soki moto oyo tozali kosolola na ye atuni motuna, mbala mosusu tokomona malamu tózonga kosolola na ye na ntango mosusu, nsima ya kozwa makanisi mosusu oyo etali likambo yango. Tokoki mpe kopesa ye mokanda moko oyo elobeli likambo yango na mozindo. Nyonso wana, ekomonisa ete tosepelaka mpenza na bato mpe tolingi kosalisa bango báyeba Yehova.—2 Kol. 2:17.