Tókolisa makoki na biso ya kosakola—Tómonisa ete tozali kotyela moto mokomoko likebi
Mpo na nini ezali na ntina: Yesu azalaki kopesa bato lokumu, mpe amonisaki ete atyelaki moto mokomoko likebi. Na ndakisa, ntango bamemelaki ye moto moko oyo akufá matoi, ekoki kozala ete Yesu amonaki ete moto yango akoyoka nsɔni na miso ya ebele ya bato. Na yango, akendeki na ye pembeni, kaka bango mibale, mpe abikisaki ye. (Mrk. 7:31-35) Atyelaki bayekoli na ye likebi na ndenge ayebaki esika makoki na bango esukaki, mpe azalaki te kosopela bango makambo ebeleebele. (Yoa. 16:12) Ata kuna na likoló, Yesu atyelaka moto mokomoko likebi. (2 Tim. 4:17) Lokola tozali bayekoli ya Kristo, tosengeli komekola ye. (1 Pe. 2:21; 1 Yoa. 3:16, 18) Lisusu, soki tozali kopesa moto oyo tozali kosolola na ye lokumu mpe kotya likebi na makambo ya bomoi na ye, makambo oyo esepelisaka ye mpe oyo ezali kotungisa ye, tokosolola na ye malamu. Soki amoni mpenza ete tozali kosepela na ye, kasi te ete toyei kaka mpo na kopesa nsango to kotika mokanda, akoki kosepela koyoka biso.
Meká kosala boye na boumeli ya sanza:
Bómekameka yango na losambo na kati ya libota, to na mosala ya kosakola, liboso ya kokɔta na porte mosusu mpe mosakoli ayokanisa maloba na ye ya ebandeli na likambo oyo moto oyo bazali kosolola na ye alobi.
Na makita ya mosala ya kosakola, ndeko oyo azali kokamba akoki kolobela to kolakisa ndenge ya komonisa moto mokomoko ete tozali kosepela na ye.