Osili komibongisa mpo na likama?
1. Mpo na nini ezali likambo ya bwanya komibongisa liboso ete likama ebima?
1 Mbula na mbula, makama lokola koningana ya mabelé, tsunami (koningana ya mabelé na nse ya mai), mipɛpɛ makasi to bikumbaki mpe mpela ekwelaka bamilio ya bato na mokili mobimba; ebele ya bandeko na biso baklisto mpe bazali kati na bango. Lokola makama yango ebimaka mbalakaka mpe ekoki kokwela moto nyonso, ezali likambo ya bwanya komibongisa liboso ete likama ebima.—Mas. 21:5.
2. Mpo na nini tosengeli kopesa bankulutu adrɛsi mpe nimero na biso ya telefone?
2 Liboso likama ebima: Mbala mosusu, bakonzi ya mboka bakebisaka bato mpo na likama moko oyo elingi kobima. Ezali na ntina kotya likebi na makebisi yango. (Mas. 22:3) Soki bankulutu bayoki likambo ya ndenge wana, bakosala makasi báyebisa bandeko nyonso ya lisangá mpe bakosalisa bango bámibongisa soki esengeli. Nsima ya likama, bankulutu bakosala mpe makasi bákutana na ndeko mokomoko ya lisangá to bábenga ye na telefone mpo na koyeba soki azali malamu mpe soki azali na mposa ya lisalisi. Kosala bongo ekoki kozwa ntango mingi soki bankulutu bayebi te adrɛsi mpe nimero ya telefone ya ndeko mokomoko. Yango wana, ezali malamu mosakoli nyonso apesa mokomeli ya lisangá mpe mokɛngɛli na boyekoli ya mokanda adrɛsi mpe nimero na ye ya telefone.
3. Ndenge nini tokoki kotosa bibongiseli oyo bankulutu bazwi soki tofandi na esika oyo makama ebimaka mingi?
3 Soki lisangá na bino ezwami na esika oyo makama ebimaka mingi, bankulutu bakoki kosɛnga basakoli bápesa bankombo mpe banimero ya telefone ya bandeko na bango to baninga na bango oyo bafandaka mosika na esika wana, epai bakoki koluka bango ntango likama ebimi mbalakaka. Yango ekopesa bankulutu likoki ya koyeba bisika nini bandeko oyo babimi na esika ya likama bakei kofanda. Bankulutu bakoki mpe komona malamu bákoma liboso makambo oyo lisangá ekosala soki likama ebimi mbalakaka, na ndakisa biloko oyo ndeko mokomoko asengeli kozala na yango, bibongiseli mpo na kolongwa na esika ya likama, mpe ndenge ya kosunga baoyo bazali na mposa ya lisalisi. Kotosa bibongiseli wana ya bolingo ezali na ntina mingi.—Ebe. 13:17.
4. Tosengeli kosala nini soki likama ebimi na esika oyo tofandaka?
4 Nsima ya likama: Okosala nini soki likama ebimi na esika oyo bofandaka? Salá makasi mpo libota na yo ezanga te mwa eloko ya kolya, bilamba, mpe nkisi ya monganga. Soki ozali na likoki, salisá mpe bandeko mosusu oyo likama yango ekweli bango. Salá nyonso oyebisa noki mokɛngɛli na boyekoli ya mokanda to nkulutu mosusu. Osengeli koyebisa bango ata soki likama yango esali yo eloko te to ozali na mposa ya lisalisi te. Soki mpe ozali na mposa ya lisalisi, yebá ete bandeko bazali kosala nyonso oyo ekoki mpo na kosalisa yo. (1 Kol. 13:4, 7) Kobosana te ete Yehova ayebi mpasi na yo; tyelá ye motema mpe ye akosunga yo. (Nz. 37:39; 62:8) Salelá mabaku nyonso mpo na kolendisa basusu na elimo mpe kobɔndisa bango. (2 Kol. 1:3, 4) Zongelá noki mimeseno na yo ya elimo.—Mat. 6:33.
5. Atako tozali baklisto, ndenge nini likama ekoki mpe kokwela biso?
5 Atako bato bakómi komitungisa mingi mpo na makama oyo ezali kobima, biso tozali na elikya mpo na mikolo ezali koya. Etikali moke, makama nyonso ekokóma makambo ya kala. (Em. 21:4) Lokola ntango yango ekómi naino te, ezali na mwa makambo oyo tokoki kosala mpo na komibongisa mpo na ntango ya mpasi to ya mikakatano, kozanga ete tólɛmbisa molende na biso na mosala ya koyebisa basusu nsango malamu.