Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mwb20 Mai lok. 3
  • Omibongisi?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Omibongisi?
  • Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2020
  • Masolo mosusu
  • Kobá komibongisa lokola tozali kobika na nsuka ya “mikolo ya nsuka”
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2021
  • Osili komibongisa mpo na likama?
    Mosala na biso ya Bokonzi—2007
  • Omibongisi mpo na mobulu oyo bana-mboka bakoki kobimisa?
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2022
  • Salisá basusu báyika mpiko na ntango ya mpasi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2022
Makambo mosusu
Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2020
mwb20 Mai lok. 3
Bato ya libota moko bazali kobongisa mwa sakosi na bango mpo na kotya biloko ya ntina.

BOMOI YA BAKRISTO

Omibongisi?

Omibongisi mpo na makama oyo ebimaka yango moko soki esalemi na esika ofandi? Koningana ya mabele, mopɛpɛ makasi, mɔtɔ ya zamba, kobukana ya mabele mpe mpela ekoki kobima na mbalakaka mpe kobebisa biloko mingi mpenza. Longolá yango, terorisme, kowelana ya bana-mboka, mpe bamaladi ekoki kosalema bisika nyonso mpe kobima na mbalakaka. (Mos 9:11) Tosengeli te kokanisa ete makama ya ndenge wana ekoki kosalema te na esika tofandi.

Mokomoko na biso asengeli komibongisa malamu liboso ete likama moko ebima. (Mas 22:3) Atako ebongiseli ya Yehova esungaka bandeko na ntango ya makama, yango elingi koloba te ete tosengeli kokanga mabɔkɔ.​—Ga 6:5.

TALÁ VIDEO OMIBONGISI MPO NA MAKAMA OYO EKOKI KOBIMA? MPE NA NSIMA YANOLÁ NA MITUNA OYO:

  • Ndeko mobali moko azali komibongisa na elimo na oyo etali likama wana azali kotánga Biblia.

    Ndenge nini komibongisa na elimo ekosalisa biso ntango makama oyo ebimaka yango moko esalemi?

  • Mwa sakosi mpo na kotya biloko ya ntina, nimero ya telefone, mpe telefone moko.

    Mpo na nini ezali na ntina . . .

    • • kopesa bankulutu baadrɛsi to banimero ya telefone oyo ekosalisa bango báluka biso liboso ya makama, na ntango ya makama, mpe na nsima ya makama?

    • • kobongisa mwa sakosi mpo na kotya biloko ya ntina?​—g17.5 lok. 6

    • • kolobela makama oyo ekoki kobima mpe makambo ya kosala mpo na likama mokomoko?

  • Bililingi: Ndenge ya kosalisa basusu na ntango ya makama. 1. Ndeko mobali moko azali kobondela. 2. Bavolontɛrɛ bazali kopesa mabɔkɔ na mosala ya kopesa lisungi. 3. Ndeko mobali moko azali kotya mbongo na kɛsi ya makabo na Ndako ya Bokonzi.

    Wapi makambo misato oyo tokoki kosala mpo na kosalisa baoyo bakutani na makama?

OKOKI KOSALA LOKOLA VOLONTƐRƐ?

Mposa ya bavolontɛrɛ ezali mingi mpo na kopesa mabɔkɔ na mosala ya kopesa lisungi ntango makama ebimi. Soki ozali na mposa ya kopesa mabɔkɔ na mosala ya kopesa lisungi, yebisá bankulutu ya lisangá na lombangu.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto