Okosala nini na bomoi na yo?
1 Ntango mosusu batunaka bana motuna oyo: “Ntango okokóma mokóló, okosala mosala nini?” Soki ozali mwana mobali, ntango ozalaki mwana moke, ozalaki koloba ete okozala alanga-nzembo? polisi? to mokɛngɛli-motamboli? To soki ozali mwana mwasi, ozalaki koloba ete okozala mwasi ya mombongo? monganga? to misionɛrɛ? Sikoyo lokola okoli, osengeli komituna motuna oyo, ‘Nakosala nini na bomoi na ngai?’ Ozali pene ya kozwa ekateli?
2 Mpo na kosalisa yo ozwa ekateli ya malamu, ebongiseli ya Yehova ebimisi DVD oyo ezali na motó ya likambo: Mituna oyo bilenge batunaka—Nakosala nini na bomoi na ngai? (na Lifalanse) Tosɛngi yo otala yango, mpe okanisa malamu makambo oyo ezali na DVD yango, na ndakisa filme (drame), mituna-lisolo mpe makambo mosusu. Na etanda “Menu principal,” okomona mitó ya makambo oyo ezali na kati ya DVD yango.
3 Esika bakomi“Drame”: Ntango ozali kotala filme ya André, talelá mituna oyo: (1) Bokokani nini ezali kati na Timote oyo balobeli na Makomami ya Grɛki ya boklisto mpe André? (Mis. 16:1; 1 Tim. 4:8; 2 Tim. 1:5) (2) Banani bazalaki kotya André mpanzi likoló mpo akóma mopoti mbangu monene, mpe ndenge nini? (3) Banani basalisaki Timote mpe André bázwa bikateli ya malamu, mpe ndenge nini? (2 Tim. 1:1-4; 3:14, 15) (4) Na ndenge nini maloba ya Matai 6:24 mpe Bafilipi 3:8 esalisaki André, mpe na ndenge nini ezali kosalisa yo?
4 Esika bakomi“Chapitres”: Nsima ya kotala filme mobimba, zongelá biteni oyo elandi mpe yanolá na mituna oyo: “Paul et Timothée” (Paulo ná Timote): Toli nini ya nsuka Paulo apesaki Timote? (2 Tim. 4:5) “Donner à Jéhovah le meilleur” (Kopesa Yehova oyo eleki malamu): Mikano nini ya elimo ozali na yango? “Prise de position pour Jéhovah” (Komitya na ngámbo ya Yehova): Bolamu ya solosolo eutaka na nini? “Le conseil d’une grand-mère” (Toli ya nkɔkɔ ya mwasi): Mpo na nini ezali mabe koluka kozala moto monene na mokili ya Satana? (Mat. 4:9) “Aucun regret” (Mawa ezali te): Koyeba likambo nini ekosalisa yo ozala na esengo mpenza na bomoi na yo?—Mas. 10:22.
5 Esika bakomi“Interviews”: Ntango ozali kotala biteni oyo elandi, makambo nini omoni ete okoki kosala mpo osalela Yehova na motema na yo mobimba? (1) “Se consacrer à des choses vaines ou servir Dieu?” (Komipesa na makambo ya mpambampamba to kosalela Nzambe?) (1 Yoa. 2:17); (2) “Apprendre à aimer la prédication” (Koyekola kosepela na mosala ya kosakola) (Nz. 27:14); mpe (3) “Une porte ouverte sur l’activité” (Ekuke efungwami mpo na mosala).—Mat. 6:33.
6 Esika bakomi“Souvenirs”: Okopesa eyano nini? (1) Misala nini ndeko mobali mpe ndeko mwasi wana bazalaki kosala, mpe mpo na nini? (2) Matomba nini bazwaki na misala yango? (3) Nini ebongolaki bomoi na bango? (2 Kol. 5:15) (4) Mikumba nini ya elimo ezwaki esika ya mosala oyo bazalaki kosala, mpe mpo na nini bamonaki ete bakokaki te kosangisa nyonso mibale? (5) Bayokaka mawa ndenge babongolaki mikano na bango? (6) Makambo nini balobaki oyo etindi yo mpenza okanisa soki osengeli kosala nini na bomoi na yo?
7 Esika bakomi“Autres interviews”: Na mituna-lisolo oyo, makambo nini oyekoli oyo omoni ete okoki kosalela mpo omipesa mobimba na mosala ya Yehova? (1) “La valeur de l’étude individuelle” (Litomba ya koyekola yo moko), (2) “D’autres façons de prêcher” (Mitindo ndenge na ndenge ya kosakola), (3) “Le service au Béthel” (Kosala na Betele), (4) “Guiléad: la formation au service missionnaire” (Eteyelo ya Gileadi mpo na kobongisa bamisionɛrɛ), mpe (5) “L’École de formation ministérielle” (Eteyelo mpo na kobongisa basungi). Talelá mpe etanda “Index de publications traitant des sujets abordés” (Index ya mikanda oyo elobeli mitó ya makambo oyo balobeli), mpe tángá mikanda oyo elobeli makambo oyo osepeli na yango mingi.
8 Sikoyo, oyebi nini okosala na bomoi na yo? Paulo alendisaki Timote ete: “Kanisáká malamumalamu makambo wana; omipesa mobimba na yango, mpo bokoli na yo emonana polele na miso ya bato nyonso.” (1 Tim. 4:15) Biso mpe tolendisi yo okanisa na makambo omoni mpe oyoki na DVD oyo. Sɛngá Yehova asalisa yo ozwa ekateli ya bwanya oyo ekopesa yo mpenza esengo sikoyo mpe na mikolo ezali koya.
[Etanda na lokasa 6]
MENU PRINCIPAL
Drame
Chapitres (Biteni 11)
Interviews
Démarrer
Sections (Biteni 3)
Souvenirs
Suppléments
Autres interviews
Index de publications traitant des sujets abordés
Sous-titres
Texte à l’écran
Malentendants
Aucun
Mpo na kopona likambo olingi kotala, finá esika omoni Suite ▶, ◀ Retour, mpe Menu principal.