Liyangani ya mokolo moko ya mbala oyo
Tokoki kokóma na likama soki tomoni to toyoki likebisi ya likama kasi totyeli yango likebi te. Kutu, kotya likebi na makambo ya elimo oyo Yehova azali kolakisa biso ezali na ntina koleka. Liyangani ya mokolo moko ya mobu ya mosala oyo ezali koya ekolobela mpenzampenza likambo yango. Motó ya likambo na yango elobi: “Bókeba na ndenge bozali koyoka.”—Luka 8:18.
Na lisukulu na ye ya liboso, molobi-mopaya akolimbola ndenge nini toli epemami oyo ezali na mikapo ya liboso ya mokanda oyo Paulo akomelaki Baebele ezali kotalela biso lelo oyo. Na lisukulu ya nsuka, oyo ezali na motó ya likambo: “Tótyaka ntango nyonso likebi na malako ya Nzambe,” molobi-mopaya akosalisa bayangani nyonso na koyeba soki mpenza bayokaka Yehova, Mwana na ye, mpe “moombo na sembo mpe ya mayele.”—Mat. 24:45.
Masolo mingi ekotalela mpenzampenza mabota. Lisukulu oyo elobi: “Mabota oyo bayokaka Liloba ya Nzambe na likebi mpenza,” ekosalisa biso tóboya kopesa nzela na biloko ya mokili ete ebebisa elimo na biso. Molobi akosolola na bandeko oyo batikaki makambo mosusu na bomoi na bango mpo na kotya makambo ya elimo na esika ya liboso. Na lisukulu oyo ezali na motó ya likambo: “Bilenge oyo bayokaka Liloba ya Nzambe na likebi bazwaka makasi,” molobi akosolola na bilenge oyo bamonisaki ete bazali na ngámbo ya solo, na kelasi, elongo na baninga na bango, to na mosala ya kosakola. Lisukulu oyo elobi: “Bana oyo bazali koyoka Nzambe mpe koyekola,” ekosalisa biso tómona mpamba te makoki oyo bana mike bazalaka na yango ya kosimba makambo. Masolo oyo bakosolola na bana mike ná baboti na bango ekosalisa biso tómona matomba ya koteya bana banzela ya Yehova bandá bomwana na bango.
Na ntango oyo Satana “azali kobungisa mabelé mobimba oyo efandami nzela,” Yehova azali kolakisa basaleli na ye ya sembo nzela oyo basengeli kotambola. (Emon. 12:9; Yis. 30:21) Soki tozali koyoka na likebi mpenza toli na ye mpe kosalela yango na botosi nyonso na bomoi na biso, tokozwa bwanya, esengo, mpe bomoi ya seko.—Mas. 8:32-35.