‘Apesaka nguya epai na ye oyo alɛmbi’
1 Biso nyonso tolɛmbaka na bantango mosusu. Mbala mosusu, tolɛmbaka mpo tosalaki mosala makasi to mpo na mikakatano ya “bantango ya ndenge mosusu mpe ya mpasi mpenza” oyo tozali na yango. (2 Tim. 3:1) Lokola tozali basaleli ya Yehova, ndenge nini tozwaka makasi ya elimo oyo esengeli mpo molende na biso na mosala ya kosakola ekita te? Tozwaka makasi na ndenge totyaka motema epai ya Yehova, ye oyo azali “na makasi kati na nguya.” (Yis. 40:26) Yehova ayebi mposa na biso mpe asepelaka mpenza kosalisa biso.—1 Pet. 5:7.
2 Bibongiseli oyo Yehova azwi: Yehova apesaka biso makasi na nzela ya elimo santu na ye, nguya oyo eleki nyonso, oyo asalelaki mpo na kokela molɔ́ngɔ́. Elimo ya Nzambe esalisaka biso ‘tózwa nguya ya sika’ ntango tolɛmbi. (Yis. 40:31) Omituna boye: ‘Eleki ntango boni, kobanda mbala ya nsuka oyo nabondelaki mpo na kosɛnga elimo santu, mpo epesa ngai makasi ya kokokisa malamu mikumba na ngai ya boklisto?’—Luka 11:11-13.
3 Soki totángaka Liloba epemami ya Nzambe mokolo na mokolo mpe tomanyolaka likoló na yango, mpe totángaka mikanda oyo elimbolaka Biblia mbala na mbala mpo na komileisa na elimo, tokozala lokola “nzete oyo ekonami penepene na bitima na mai, oyo ekobotaka mbuma na yango na ntango ekoki; nkasa na yango ekokauka te.”—Nz. 1: 2, 3.
4 Yehova asalelaka mpe bandeko na biso baklisto, oyo bakoki kozala ‘lisalisi oyo ezali kopesa biso makasi.’ (Kols. 4:10, 11) Balendisaka biso na makita ya lisangá na nzela ya masolo na bango ya kolendisa, biyano oyo bapesaka, mpe masukulu oyo basalaka. (Mis. 15:32) Mingimingi, bankulutu baklisto basalisaka biso na elimo mpe balendisaka biso.—Yis. 32:1, 2.
5 Mosala ya kosakola: Soki omoni ete obandi kolɛmba na elimo, kotika kosakola te! Mosala ya kosakola ekeseni na misala mingi, mpamba te yango ebɔndisaka biso ntango tozali kosala yango mbala na mbala. (Mat. 11:28-30) Kosakola nsango malamu esalisaka biso tótya makanisi nyonso na Bokonzi ya Nzambe mpe tóbosana te bomoi ya seko mpe makambo ya malamu oyo yango ekomemela biso.
6 Tozali na mosala mingi ya kosala liboso ete ebongiseli mabe ya ntango oyo ebomama. Tozali na bantina mingi ya kokangama makasi na mosala na biso, mpe “kotalela kaka makasi oyo Nzambe azali kopesa.” (1 Pet. 4:11) Na lisalisi ya Yehova, tokosilisa mosala na biso, mpamba te ye “[apesaka] nguya epai na ye oyo alɛmbi.”—Yis. 40:29.