Okɔtelaka Liloba ya Nzambe?
1 Na mokili oyo etindaka bato báboya kondimela Biblia, baklisto ya solo bakɔtelaka Liloba ya Nzambe na molende mpenza. Lokola tondimaka ete “makomami nyonso epemami na Nzambe,” tondimaka mpe likambo oyo Yesu Klisto alobaki na libondeli moko epai ya Yehova ete: “Liloba na yo ezali solo.” (2 Tim. 3:16; Yoa. 17:17) Ndenge nini tokoki kokɔtela Liloba ya Nzambe malamumalamu?
2 Yekoláká Makomami: Na ntembe te, Yesu azalaki komipesa mingi na koyekola Liloba ya Nzambe. Yango esalisaki ye ateya bato makambo oyo euti na Makomami na boumeli ya mosala na ye ya kosakola. (Luka 4:16-21; 24:44-46) Ndenge nini tokoki kosala mpo na koyeba bavɛrsɛ mingi na motó? Tokoyeba bavɛrsɛ mingi na motó soki tozali kotánga Biblia mokolo na mokolo mpe komanyola vɛrsɛ moko oyo tomoni ete elendisi biso mpenza to oyo tomoni ete ekosalisa biso na mosala ya kosakola. Ntango tozali kobongisa makita, tosengeli kotángaka bavɛrsɛ mbala moko na kati ya Biblia mpe ntango mosusu kobongisa mwa likanisi oyo tokopesa na vɛrsɛ yango. Na makita, tosengeli kolandaka na Biblia na biso ntango molobi azali kotánga bavɛrsɛ. Koyeba bavɛrsɛ ekosalisa biso na “kosembola liloba ya solo malamumalamu.”—2 Tim. 2:15.
3 Tiká Biblia eloba: Ntango tozali kosakola, tosengeli kotika Biblia eloba. Na ndakisa, soki likoki ezali, tosengeli kosala makasi tótángela moto oyo tozali kosolola na ye ata vɛrsɛ moko. Soki moto yango atuni motuna to abimisi ntembe moko, ezali malamu kosalela Biblia mpo na kopesa ye eyano. Ezala moto azali na mosala mingi, tokoki koyebisa ye likanisi ya vɛrsɛ moko; tokoki koloba boye: “Liboso tókabwana, nalingi kolakisa yo vɛrsɛ moko.” Soki ekoki, tángá vɛrsɛ mbala moko na Biblia, mpe salá makasi amona makambo oyo ozali kotánga.
4 Ntango bamonisaki moto moko bavɛrsɛ ya Biblia oyo ekweisi liteya ya Bosato, moto yango akamwaki mpe alobaki boye: “Nakendaka ndako-nzambe bandá bomwana na ngai, kasi nayebaki te ete Biblia elobi boye!” Andimaki mbala moko koyekola Biblia. Yesu alobaki ete bampate na ye bakoyoka mongongo na ye. (Yoa. 10:16, 27) Lolenge malamu ya kosalisa bato ya mitema sembo báyeba solo, ezali ya kolakisa bango solo yango mbala moko na Makomami. Na bongo, tiká ete tókɔtelaka Liloba ya Nzambe, oyo ezali solo!