“Esengo na moto oyo azali kokoba koyika mpiko na komekama”
1 Baklisto nyonso bamekamaka. (2 Tim. 3:12) Komekama ekoki kouta na mikakatano ya nzoto, mikakatano ya mbongo, masɛnginya, minyoko, to na ndenge mosusu. Satana abimiselaka biso komekama mpo tólɛmba na elimo, tólɛmbisa mabɔkɔ na mosala ya kosakola, to tótika kosalela Nzambe. (Yobo 1:9-11) Na ndenge nini koyika mpiko na komekama epesaka biso esengo?—2 Pet. 2:9.
2 Omibongisa mpo na komekama: Yehova asili kopesa biso Liloba na ye oyo ezali solo, oyo ezali mpe na lisolo ya bomoi ya Yesu ná mateya na ye. Soki toyokaka maloba ya Yesu mpe tosalelaka yango, tokomisalela moboko makasi mpe yango ekosalisa biso na ntango ya komekama. (Luka 6:47-49) Tozwaka mpe makasi na nzela ya bibongiseli mosusu, na ndakisa, bandeko na biso baklisto, makita ya lisangá, mpe mikanda oyo elimbolaka Biblia oyo moombo ya sembo mpe ya mayele abimisaka. Tosalelaka mpe mbala na mbala likabo oyo Nzambe apesá biso, elingi koloba libondeli.—Mat. 6:13.
3 Yehova apesi biso mpe elikya. Soki tozali na kondima makasi na bilaka ya Yehova, elikya na biso ekokóma lokola ‘longo mpo na molimo, ekozala makasi mpe ngwi.’ (Ebe. 6:19) Na ntango ya kala, masuwa ezalaki kolongwa na libongo te soki ezali na longo te, ata soki mbula to mopɛpɛ ezali te. Soki mopɛpɛ makasi ebɛti mbalakaka, longo ekokaki kosala ete masuwa etutana na mabanga te. Ndenge moko mpe, soki tozali na kondima makasi na bilaka ya Yehova lelo oyo, tokotɛngatɛnga te ntango mopɛpɛ makasi ya komekama ekobɛta biso. Komekama ekoki koyela biso mbalakaka. Atako na ebandeli bato ya Lisitala basepelaki na nsango malamu oyo Paulo ná Balanabasi basakwelaki bango, kasi na nsima makambo ebongwanaki nokinoki ntango Bayuda oyo bazalaki batɛmɛli bayaki.—Mis. 14:8-19.
4 Ezaleli ya koyika mpiko epesaka esengo: Kokangama na mosala ya kosakola ata soki tokutani na botɛmɛli, epesaka biso kimya na makanisi. Tosepelaka ntango totángamaka bato oyo babongi kosambwisama mpo na Klisto. (Mis. 5:40, 41) Koyika mpiko na komekama esalisaka biso tókolisa mpenza bizaleli lokola komikitisa, botosi, mpe koyika mpiko. (Det. 8:16; Ebe. 5:8; Yak. 1:2, 3) Eteyaka biso tótyela Yehova motema, tótyela bilaka na ye motema, mpe tómibomba epai na ye.—Mas. 18:10.
5 Toyebi ete komekama ezali mpo na ntango mokuse. (2 Kol. 4:17, 18) Komekama epesaka biso nzela ya komonisa ete tolingaka Yehova mingi. Soki tozali koyika mpiko na komekama, tokoki kopesa eyano na bifundeli ya Satana. Na bongo, tólɛmba te! “Esengo na moto oyo azali kokoba koyika mpiko na komekama, mpamba te na kokómáká moto oyo andimami akozwa motole ya bomoi.”—Yak. 1:12.