Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 6/97 lok. 7
  • Mpo na nini kokóba?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mpo na nini kokóba?
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1997
  • Masolo mosusu
  • Tolanda mosala na biso ya kosakola Bokonzi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
  • Ntina oyo tozongelaka bato mbala na mbala
    Mosala na biso ya Bokonzi—2007
  • Mpo na nini tosengeli kokoba kosakola?
    Mosala na biso ya Bokonzi—2002
  • Kotika kosakola te!
    Mosala na biso ya Bokonzi—2000
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—1997
km 6/97 lok. 7

Mpo na nini kokóba?

1 Ntango mosusu osilá komituna motuna oyo, wana ozali komibongisa mpo na kolekisa mokolo mobimba na mosala ya kosakola. Na bitúká mosusu, teritware na biso etalelami mbala na mbala, mpe ekoki kozala ete bato bayebi biso mpe bazalaka pene ya koboya koyamba biso. Bobele bamoko nde bazali komonisa bosepeli na nsango na biso. Nzokande ezali na bantina mingi ya kokóba.

2 Ya liboso, tosɛngisami na kokóba kosakola nsango ya Bokonzi kino nsuka ekoya. (Mat. 24:14; 28:19, 20) Mosakoli Yisaya atunaki Nzambe kino ntango nini asengelaki kokóba mosala ya kosakola. Eyano oyo epesami na Yisaya 6:11 ezali polele. Yehova ayebisaki ye ete akóba kosakola nsango ya Nzambe epai na bato. Ezali mpe bongo lelo. Yehova azali kozela ete biso tókóba kokende kotala bato ya teritware na biso, atako soki emonani ete bakoboya koyamba biso. (Ezek. 3:10, 11) Ezali wana mokumba ya bulɛɛ oyo epesameli biso.​​​—1 Kol. 9:17.

3 Ya mibale, kokóba kosakola ezali mpo na biso libaku ya komonisa bozindo ya bokangami na biso epai na Yehova. (1 Yoa. 5:3) Lisusu, ntango tozali kokanisa bomoi ya bato na mikolo mizali koya oyo misili kobelema, ndenge nini tokoki komipekisa ete tókebisa bato, bazalani na biso, na bolingo? (2 Tim. 4:2; Yak. 2:8) Soki tozali kokokisa mokumba na biso na bosembo nyonso epai na bango, tokokolisa nkɔ́nzɔ oyo bazali na yango ya kondima nsango ya lobiko ya Nzambe, mpe bakokoka te koloba ete bakebisamaki te.​​​—Ezek. 5:13.

4 Na koleka, nani ayebi? Mitema ya basusu mikoki kobongwana. Ntango mosusu mpo na mbongwana ya makambo, mpo na mokakatano moko na libota to makambo ya mokili oyo ezali kosala ete bákanisa mpenza mpo na bomoi na bango na mikolo mizali koya. To mpe, mokolo moko liboso ya ekuke na bango bakolobela bango likambo moko oyo ekosepelisa bango. (Mos. 9:11; 1 Kol. 7:31) Mpe lisusu bato bazali kobima na ndako moko mpo na kokota na mosusu. Likoki ezali ya kozwa bato oyo bayei sika na teritware na biso oyo bakomonisa bosepeli na nsango malamu, to bilenge oyo bakómi mwa mikóló mpe bakómi kofanda sika bango moko mpe bazali komituna ntina ya bomoi na bango.

5 Tokokóba? Ezali bongo! Makomami mazali kopesa biso bantina malamu ya kokende kotala mpe kozongela bato. Na nsuka, ntango mosala ya kosakola ekosuka, Yehova akopambola biso mpo ete tosalaki makasi mpenza kati na mosala ya kosakola mpe akopambola baoyo, na botɔ́ndi, bandimaki nsango malamu ya Bokonzi.​​​—1 Tim. 4:16.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto