Ndenge ya kobanda koyekola Biblia na bato oyo totikelaka bazulunalo
1. Mokano na biso ezalaka nini ntango totikelaka bato bazulunalo?
1 Mbala mingi, tokabolaka Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! na mokolo ya pɔsɔ, na mosala ya kosakola. Kasi, yango ezali kaka mayele moko oyo tosalelaka mpo na kokokisa mokano na biso ya koteya bato ya mitema sembo mateya ya solo. Bapesi biso mwa makanisi awa na nse, mpo na ndenge ya kolakisa moto buku Biblia eteyaka ntango tozongeli ye mpe tolingi kobanda koyekola na ye Biblia. Okoki kobongisa makanisi yango na ndenge oyo eyokani na teritware ya lisangá na bino mpe koloba yango na maloba na yo moko. Kokakatana te mpo na kosalela makanisi mosusu ya kobanda lisolo oyo omoni ete ekobota mbuma.
2. Ndenge nini tokoki kosalela nkasa ya ebandeli ya buku Biblia eteyaka mpo na kobanda koyekola na moto Biblia?
2 Salelá nkasa ya ebandeli: Ntango ozongeli moto, okoki koloba na ye boye: “Zulunalo oyo natikelaki yo ezali kobenda likebi na Biblia. Talá ntina oyo tosengeli kotángaka Biblia.” Tángá Yisaya 48:17, 18; Yoane 17:3; to vɛrsɛ mosusu oyo ebongi. Nsima ya kolakisa ye buku Biblia eteyaka, mpe kopesa ye yango, okoki koloba boye:
◼ “Biblia epesi biso elikya ya solosolo mpo na mikolo ezali koya.” Lakisá ye nkasa 4-5, mpe tuná ye boye: “Na bilaka oyo nyonso, oyo wapi olingi mpenza ete ekokisama?” Lakisá ye mokapo oyo elobeli elaka ya Makomami oyo ye aponi, mpe bótalela na mokuse paragrafe moko to mibale, soki asepeli.
◼ To, okoki koloba boye: “Biblia epesi biyano na mituna ya ntina mingi oyo etali bomoi.” Bendá likebi na ye na lokasa 6, mpe tuná ye soki amituná naino te moko ya mituna oyo batye wana. Fungolá mokapo oyo epesi eyano na motuna yango, mpe bótalela na mokuse paragrafe moko to mibale.
◼ To, okoki kotángela ye ndambo ya mitó ya makambo oyo ezali na etanda ya makambo mazali na kati ya buku, mpe kotuna ye oyo wapi esepelisi ye. Fungolá mokapo oyo aponi mpe monisá ye na mokuse ndenge boyekoli esalemaka.
3. Ndenge nini tokoki kobanda koyekola na moto Biblia nsima ya kopesa ye bazulunalo oyo elobeli (a) kobeba ya makambo ya mokili? (b) libota? (c) ntina ya kondimela Biblia?
3 Tikeláká moto motuna na mbala ya liboso oyo osololi na ye: Mayele mosusu ezali kotuna moto motuna moko oyo ekopesa yo nzela ya kozongela ye. Soki moto andimi kozwa zulunalo, tuná ye motuna moko, mpe pesá ye elaka ete okoyanola na motuna yango ntango okozongela ye. Salá makasi oyokana na ye mpo ozongela ye, mpe salá nyonso okokisa elaka oyo opesi ye. (Mat. 5:37) Ntango okozongela ye, kundwelá ye motuna oyo otikelaki ye, mpe bótánga mpe bólobela na mokuse eyano na yango na buku Biblia eteyaka. Pesá ye mpe mokanda mpo alanda malamu. Talá mwa bandakisa oyo:
◼ Soki zulunalo oyo otikeli moto elobeli kobeba ya makambo ya mokili, okoki koloba na ye boye: “Mbala ekoya, tokotalela eyano oyo Biblia epesi na motuna oyo: Makambo nini ya malamu Nzambe akosala awa na mabelé?” Ntango okozongela ye, lakisá ye nkasa 4-5. To, okoki kotuna ye boye: “Makama oyo ekómelaka bato ezalaka nde mokano ya Nzambe?” Ntango okozongela ye, lakisá ye mokapo 1, paragrafe 7-8.
◼ Soki zulunalo oyo otikeli moto elobeli libota, liboso bókabwana okoki kotuna ye boye: “Mpo libota ezala na esengo, moto mokomoko ya libota yango asengeli kosala nini?” Ntango okozongela ye, bótalela mokapo 14, paragrafe 4.
◼ Soki zulunalo oyo otikeli moto elobeli ntina ya kondimela Biblia, liboso bókabwana okoki kotuna ye boye: “Biblia elobaka mpenza solo na makambo ya siansi?” Ntango okozongela ye, bótalela mokapo 2, paragrafe 8.
4. Tokosala nini soki moto aboyi buku Biblia eteyaka?
4 Mbala nyonso oyo ozongeli moto, tikeláká ye motuna moko oyo okopesa eyano na yango mbala ya nsima. Soki moto andimi kokoba koyekola, bandá koyekola na ye kobanda na mokapo ya liboso tii na nsuka. Okosala nini soki moto aboyi buku Biblia eteyaka? Okoki kokoba komemela ye bazulunalo mpe kosolola na ye na Biblia. Soki ozali kokoba kosalisa ye asepela na nsango malamu, akoki kondima koyekola Biblia mokolo mosusu.
5. Tosengeli kosalaka nini na esika ya kosuka kaka na kopesa bato bazulunalo?
5 Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! ekoki kopesa moto mposa ya koluka koyeba oyo Biblia eteyaka mpenza. Yango wana, salá makasi obanda koyekola Biblia na bato oyo bandimaka kozwa yango. Na ndenge yango, tokotosa etinda ya Yesu ya ‘kokómisa bato bayekoli mpe koteya bango.’—Mat. 28:19, 20.