Mokanda ya Biro
Bandeko basakoli ya Bokonzi,
Tozali na esengo ya komona ndenge bokoli esalemi na teritware ya filiale na biso na mobu ya mosala 2007! Na Yanuali, Congo-Kinshasa ekómaki na basakoli 138273 mpe bandeko 10765 bazalaki babongisi-nzela ya sanza na sanza. Na Aprili 2007, Congo-Brazzaville ekómaki na basakoli 5406. Na basanza mwambe ya liboso ya mobu ya mosala 2007, babengisaki bandeko ya sika 33 báya kosala na Betele. Tozali na mposa ya bandeko mingi oyo basepeli kosala na Betele mpe bazali kokokisa masɛngami, oyo bakoki kosala misala ndenge na ndenge, mingi mpenza kobongola mikanda na minɔkɔ mosusu.
Tokabolaki Nsango ya Bokonzi No. 37, “Nsuka ya mangomba ya lokuta ekómi pene!” pene na milio 8 na teritware mobimba ya filiale na biso. Balapolo ndenge na ndenge oyo tozwi emonisi ete bato oyo bazwaki nsango ya Bokonzi yango mpe batángaki yango, bapesaki Batatoli ya Yehova matondi ndenge nsango yango efungolaki bango miso. Bamonaki ete ezali mpenza na ntina koluka koyeba lingomba ya solo. Mingi bandimaki koyangana na makita mpe koyekola Biblia.
Ntina oyo tosalaka bakampanye ya ndenge wana ezali mpo na kosalisa bato ya mitema sembo báyeba oyo Biblia eteyaka mpenza. (Mat. 28:19, 20) Ntango ozali kosakola, kobosana te kokoma nkombo ya bato nyonso oyo basepelaki na nsango malamu, mpe kozongela bango na mokano ya kobanda koyekola na bango Biblia; mpe kobá koyekola Biblia na bato oyo bazali na “ezaleli oyo ebongi mpo na bomoi ya seko.” (Mis. 13:48) Tozali na esengo ya kosala mosala oyo ya ntina mingi elongo na bino, mpe totindeli bino mbote na biso ya bolingo.
Bandeko na bino,
Betele ya Congo-Kinshasa