Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 9/05 lok. 1
  • Mokanda ya Biro

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mokanda ya Biro
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2005
  • Masolo mosusu
  • Mokanda ya Biro
    Mosala na biso ya Bokonzi—2007
  • Nini esalemaka na biro ya filiale?
    Banani bazali kosala mokano ya Yehova lelo oyo?
  • Mokanda ya biro
    Mosala na biso ya Bokonzi—2006
  • Elembo ya bolingo, kondima mpe botosi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2005
km 9/05 lok. 1

Mokanda ya Biro

Bandeko basakoli ya Bokonzi,

Na ebandeli ya mobu ya sika ya mosala, zongazonga moko ya sika esalemaki na teritware ya filiale ya Congo. Teritware ya filiale na biso ekómi sikoyo na bazongazonga 137 mpe na bitúká 12.

Mosala makasi esalemaki mpo na kobongisa mayangani ya etúká 92, mpe na mayangani 7 basalaki mpe masukulu ya ntina na minɔkɔ mosusu na teritware mobimba ya filiale. Liyangani esalemaki na minɔkɔ 11, bakisá mpe na elobeli ya bikela; mpe na bisika mosusu, programɛ eyeisamaki mokuse. Bandeko, topesi bino nyonso longonya ndenge botambolaki bakilomɛtrɛ mingi mpo na koyangana na ebongiseli wana ya elimo ya ntina mingi.​—⁠Det. 31:⁠12.

Eleki sikoyo pene na mbula mobimba, mosala ya kotonga ndako misato oyo mokomoko ekozala na etaze moko, ebandaki na lopango ya Betele ya Kinshasa. Bandako yango nyonso ekozala na bashambre 84. Mosala ya liboso ezalaki ya kosopa ebele ya mabanga ya mikemike na esika oyo bakotonga bandako yango misato. Esengelaki mituka eya mbala 1000 mpo na kosopa tɔni 16 000 ya mabanga ya mikemike, mpe konyata yango na bamasini.

Kompanyi moko oyo etongaka bandako awa na mboka na biso nde ezali kotonga bandako yango. Departema oyo etalaka misala ya botongi na Betele ezali kolandela misala nyonso oyo ezali kosalema na bandako yango mpo na koyeba soki ezali kosalema malamu mpenza. Boyokani ezali malamu mpenza kati na biso mpe basali ya kompanyi yango. Moko na bango alobaki boye: “Ndenge tozali kotonga awa ekeseni mpenza na ndenge totongaka na bisika mosusu. Bato na bino nyonso bapesaka biso mbote, ata bakonzi na bino bapesaka basali na biso nyonso mbote, esalemaka bongo te na bisika mosusu oyo totongaka.” Mosali mosusu alobaki boye: “Ya solo, Nzambe azali elongo na bino, mpamba te ata na ntango oyo mbula ebɛtaka mingi, ntango tozalaki kosopa mabanga ya mikemike na esika oyo bakotonga bandako, mbula ebɛtaki te ndenge ebɛtaka awa na Kinshasa.”

Mosala ya bamasɔ mpe misala mosusu ezali kotambola mpenza na boyokani na manaka na biso. Ntango bandako misato wana ya sika ekosila, libota ya Betele ya Kinshasa ekozala na nyonso oyo esengeli mpo na kosalela bandeko nyonso na teritware ya Congo. Oyo nde esengo komona ndenge misala nyonso wana ezali kosalema na molende mpenza mpo mosala ya Bokonzi ekende liboso! Tosepelaka mpe mingi na makabo oyo bopesaka mpo na kopesa mabɔkɔ na mosala ya kosakola. (Mas. 3:​9, 10) Tiká ete Yehova apambola milende oyo tozali kosala na bomoko na “mosala mpo na kosanzolama ya nkembo na ye.” ​—⁠Ef. 1:⁠12.

Bandeko na bino,

Biro ya filiale ya Congo

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto