Tósalisa babola bákóma na elikya
1 Yesu azalaki komibanzabanza mingi mpo na babola. Na bantango mosusu, azalaki kosala makamwisi mpo na kosalisa bato mpe kobikisa baoyo bazalaki na maladi; kasi amipesaki mingi nde na kosakwela babola “nsango malamu.” (Mat. 11:5) Lelo oyo mpe, mosala ya kosakola oyo baklisto basalaka esalisaka babola mpe bato mosusu.—Mat. 24:14; 28:19, 20.
2 Elikya ya solosolo: Mbala mingi, bateyi ya mangomba ya boklisto bayebisaka babola ete bakokóma bazwi soki bazali kotya mabonza mingi. Nzokande, Biblia eteyaka ete kaka Bokonzi ya Nzambe nde ekosilisa bobola mpe mikakatano nyonso ya bato. (Nz. 9:18; 145:16; Yis. 65:21-23) Soki tozali komonisa babola makambo oyo Biblia eteyaka mpenza, tozali kosalisa bango bákóma na elikya mpe bákokisa bamposa na bango ya elimo.—Mat. 5:3.
3 Na ntango ya Yesu, Bafalisai bazalaki komona babola lokola bato mpamba mpe bapesaki bango nkombo moko ya kotyola: am-ha’arèts to “bato ya mboka.” Nzokande mpo na Yesu, “makila na bango” to bomoi na bango ezalaki na “motuya.” (Nz. 72:13, 14) Tokolanda ndakisa ya Yesu mpe tokomonisa ete tozali ‘koyokela babola mawa’ soki tozali komonisela bango boboto mpe komitya na esika na bango. (Mas. 14:31) Tokolinga mpe te kosalela maloba ya kotyola mpo na kolobela bato oyo bafandaka na bisika oyo babola bazali mingi mpe tokoboya te kopesa bango litatoli. Bato mingi oyo bazali kosepela na nsango ya Bokonzi bazali bazwi te.
4 Tósalisa bango sikoyo: Ntango tozali koteya babola oyo bazali na teritware na biso mitinda ya Biblia, tozali mpe kosalisa bango na kolɛmbisa mpasi ya bobola banda sikoyo. Na ndakisa, Biblia epekisi kolangwa masanga, masano ya mbongo, gɔigɔi, makaya, mpe makambo mosusu oyo ekómisaka moto mobola. (Mas. 6:10, 11; 23:21; 2 Kol. 7:1; Ef. 5:5) Makomami elendisi biso tózala na ezaleli ya kolongobana mpe tósalaka mosala na ‘molimo na biso mobimba’; yango nde bizaleli oyo bapatrɔ balukaka epai ya basali. (Kols. 3:22, 23; Ebe. 13:18) Kutu, ntango batunaki bapatrɔ mosusu mituna, mingi balobaki ete basepelaka mingi soki moto oyo ayei koluka mosala azali na ezaleli ya kolongobana mpe na bosembo.
5 Yehova akangi miso te na mpasi ya babola. Etikali moke Yesu Klisto akobikisa “mobola oyo akoganga.” (Nz. 72:12) Kasi liboso na yango, tozali na libaku malamu ya kosalela nsango ya elikya oyo Biblia epesi mpo na kobɔndisa basusu, bakisa mpe babola.