Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 12/07 lok. 1
  • Tókoba kosakola na molende

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tókoba kosakola na molende
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2007
  • Masolo mosusu
  • “Bópela na elimo”
    Mosala na biso ya Bokonzi—2009
  • Okomekola molende ya Yehova mpe ya Yesu na eleko oyo ya Ekaniseli?
    Mosala na biso ya Bokonzi—2015
  • Monisáká molende na mosala ya kosakola
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
  • Ozali kolanda Kristo malamumalamu?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2007
km 12/07 lok. 1

Tókoba kosakola na molende

1 Kobanda mobu 1992, na mokili mobimba, Batatoli ya Yehova balekisaka mbula na mbula ngonga koleka miliare moko na kosakola Bokonzi mpe kokómisa bato bayekoli na molende mpenza. Tozali mpenza na esengo ya kopesa mabɔkɔ na mosala monene wana.​—Mat. 28:19, 20.

2 Na ntembe te, tosengeli kotɔnda Yehova mpe kokumisa ye na ndenge asalisi biso tókokisa malamu mosala wana na ‘bantango oyo ya ndenge mosusu.’ (2 Tim. 3:1) Kasi, tosengeli kosala nini mpo tókoba kokokisa mosala wana ya ntina mingi na molende?

3 Tókoba kosakola na molende: Bolingo makasi oyo tolingaka Yehova mpe bazalani na biso, bakisá mpe mposa ya kozala na bomoi oyo eyokani na komipesa na biso epai na ye, nde etindaka biso tókokisa mosala ya Bokonzi. (Mat. 22:37-39; 1 Yoa. 5:3) Bolingo etindaka biso tómipimela makambo mosusu mpo na kosakola mingi.​—Luka 9:23.

4 Tósala makasi mpo molende na biso ekita te: Monguna na biso Zabolo azali kosala nyonso mpo na kotinda biso tólɛmbisa mabɔkɔ na mosala ya kosakola. Kati na makambo oyo asalelaka mpo na kolɛmbisa biso tokoki kotánga: ndenge oyo bato mosusu ya teritware na biso baboyaka nsango malamu, bisengo ya mokili, mitungisi ya bomoi, mpe komitungisa koleka ndelo mpo na kolɔngɔnɔ ya nzoto na biso.

5 Yango wana, tosengeli kosala makasi mpo molende na biso ekita te. Tosengeli kobatela ‘bolingo oyo tozalaki na yango liboso.’ Yango esɛngi tótángaka mpe tómanyolaka Liloba ya Nzambe mbala na mabala, mpe tósalelaka bibongiseli nyonso oyo Yehova azali kozwa na nzela ya “moombo ya sembo mpe ya mayele” mpo na kosalisa biso tótikala makasi na elimo.​—Emon. 2:4; Mat. 24:45; Nz. 119:97.

6 Ndenge bisakweli ya Biblia emonisi yango polele, mokolo oyo Yehova akoboma bato mabe ekómi mpenza pene. (2 Pet. 2:3; 3:10) Yango wana, tiká ete tókoba kokokisa na molende mpenza mosala ya kosakola Bokonzi mpe kokómisa bato bayekoli oyo ezali kosalema sikoyo!

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto