Okomekola molende ya Yehova mpe ya Yesu na eleko oyo ya Ekaniseli?
1. Na eleko ya Ekaniseli, Batatoli ya Yehova basalaka makasi mpenza ya kosala nini?
1 Yehova akokisaka mokano na ye na molende. Mpo na mapamboli mosusu ya Bokonzi ya Nzambe, Yisaya 9:7 elobi boye: “Molende mpenza ya Yehova ya mampinga nde ekosala yango.” Ndenge moko mpe, Mwana ya Nzambe amonisaki molende makasi mpo na losambo ya solo, ntango akokisaki mosala na ye awa na mabele. (Yoa. 2:13-17; 4:34) Mbula na mbula, na eleko ya Ekaniseli, bamilio ya basakoli na mokili mobimba basalaka makasi mpenza ya komekola molende ya Yehova mpe ya Yesu na ndenge basakolaka mingi. Okozala moko na bango?
2. Molende ekotinda biso tósala nini kobanda mokolo ya 07/03/2015?
2 Kampanye ya Ekaniseli: Na mbula oyo, kampanye mpo na kobengisa bato na Ekaniseli ekobanda mokolo ya pɔsɔ, 07/03/2015. Banda sikoyo, zwá bibongiseli mpo osakola na molende. Bandeko bakozala na esengo ya kokabola na molende lokasa ya libyangi na teritware na bango mobimba. Salá mpenza makasi obengisa bato oyo oyekolaka na bango Biblia, bato oyo ozongelaka, baninga ya mosala, bato ya libota na yo mpe baninga ya kelasi na nzela ya lokasa ya libyangi to na jw.org.
3. Ndenge nini tokoki kosakola mingi na sanza ya misato mpe sanza ya minei?
3 Mosala ya mobongisi-nzela mosungi: Molende ekotinda mpe biso tósakola mingi. Na ntembe te, lokola tokoki kopona kosala bangonga 30 oyo esɛngami, bandeko mingi bakozala na likoki ya kosala mosala ya mobongi-nzela mosungi na sanza ya misato mpe ya minei. Na losambo na bino na kati ya libota to mpe na boyekoli na yo moko, talelá soki okoki kosala yango mpe bondelá. (Mas. 15:22) Soki osali kampanye na esengo, yango ekotinda basusu básala yango na molende. Soki obongoli makambo mosusu mpo osakola mingi, okomekola molende ya Yesu.—Marko 6:31-34.
4. Mbano nini tokozwa soki tomekoli molende ya Yehova mpe ya Yesu?
4 Soki tomekoli molende ya Yehova mpe ya Yesu na eleko oyo ya Ekaniseli, tokozwa mbano mpenza. Tokopesa bato mingi ya teritware na biso litatoli. Tokozwa esengo oyo eutaka na kosalela Yehova mpe kokabela basusu. (Mis. 20:35) Oyo eleki nyonso, tokosepelisa Nzambe na biso ya molende mpe Mwana na ye.