Tókabola bazulunalo oyo epesaka litatoli na ntina etali solo
1. Ntina ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! ezali nini?
1 Zulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova mpe Lamuká! ekokoba kozala na esika ya liboso na mosala ya kosakola Bokonzi mpe kokómisa bato bayekoli. (Mat. 24:14; 28:19, 20) Bazulunalo yango mibale ebimaka mpenza na ntango ebongi, mpe tosepelaka kokabola yango na mitindo ekeseni ya mosala ya Bokonzi.
2. Mbongwana nini esalemi na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká!, mpe mpo na nini?
2 Na bambula oyo eleki, mwa mbongwana esalemi na bazulunalo yango, na oyo etali bonene na yango, masolo na yango, mpe ndenge ya kolakisa yango. Mbongwana yango esalemi mpo na kosalisa bato básepela na bazulunalo yango lisusu koleka mpe esalisa bango mingi, mpo nsango malamu esimba mitema ya ‘bato ya ndenge nyonso mpo bákoka kobika mpe bákóma na boyebi ya sikisiki ya solo.’—1 Tim. 2:4.
3. Ndenge nini tokosalela bazulunalo na mosala ya kosakola?
3 Kobanda Yanuali 2006, tosili koyeba kosalela malamu maloba ekeseni ya kobanda lisolo mpo na kolakisa Lamuká! oyo ekómi kobima mbala moko na sanza. Sikoyo tokobanda mpe kosala bongo mpo na kolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova oyo tokosalela na mosala ya kosakola. Tokomona maloba ya kobanda lisolo oyo bapesi lokola ndakisa mpo na kolakisa zulunalo mokomoko na lokasa ya nsuka ya Mosala na biso ya Bokonzi. Mbala mingi, maloba oyo bapesaka lokola ndakisa emonisaka kaka ndenge ya kolakisa masolo ya ebandeli ya zulunalo moko, kasi sikoyo ekomonisa mpe ndenge ya kolakisa masolo mosusu oyo ekobenda likebi ya bato mingi. Tokosalela malamu maloba yango ya kobanda lisolo soki toyebi malamu lisolo oyo tokolakisa mpe tolobi yango na maloba na biso moko, na kotalela bamposa ya bato ya teritware na biso.
4. Mpo na nini ekoki kozala malamu tósalela maloba ya kobanda lisolo oyo ekeseni na oyo bapesi na Mosala na biso ya Bokonzi?
4 Mosala na biso ya Bokonzi ekozala na mitindo mibale ya kolakisa zulunalo mokomoko. Atako bongo, kokakatana te kosalela maloba mosusu ya kobanda lisolo, mpamba te ntango mosusu bato ya teritware na bino bakosepela mingi nde na lisolo mosusu. To ekoki kozala ete okozala na likoki ya koloba malamu soki olakisi moto lisolo moko oyo osepeli na yango mingi.
5. Osengeli kosala nini liboso ya kobongisa ndenge ya kolakisa zulunalo?
5 Ndenge ya kobongisa maloba ya kobanda lisolo: Ya liboso, osengeli koyeba malamu lisolo oyo oponi kolakisa moto. Mbala mosusu, okozala ntango nyonso te na likoki ya koyeba malamu masolo nyonso ya zulunalo liboso ya kolakisa yango na mosala ya kosakola. Nzokande, ndenge na yo ya koloba esengeli komonisa ete osepeli na lisolo yango mpe ondimi yango. Okoki kosala bongo kaka soki oyebi malamu makambo oyo ozali kolobela.
6. Ndenge nini tokoki kobongisa maloba ya kobanda lisolo?
6 Ya mibale, bongisá maloba ya kobanda lisolo oyo okoki koyokanisa yango na moto nyonso okokutana na ye. Okoki kobanda lisolo na motuna moko oyo eyokani na lisolo oyo okolobela mpe ekolamusa mposa ya moto. Zalá ntango nyonso na kondima ete Liloba ya Nzambe ezali na nguya ya kosimba mitema. (Ebe. 4:12) Poná vɛrsɛ moko oyo eyokani na lisolo oyo okolakisa, mingimingi vɛrsɛ oyo balobeli to batángi maloba na yango na lisolo yango. Luká koyokanisa vɛrsɛ yango na lisolo oyo okolakisa.
7. Ndenge nini tokoki kokoba kobongisa maloba na biso ya kobanda lisolo?
7 Na mabaku nyonso: Mpo maloba ya kobanda lisolo ebimisa matomba mpenza, esengeli kosalela yango. Bimá elongo na lisangá mpo na kokabola bazulunalo na mokolo ya pɔsɔ. Lakisá bazulunalo na bato oyo bandimaki kozwa mikanda na biso mosusu. Kobosana te kolakisa bazulunalo na bato oyo oyekolaka na bango Biblia mpe bato mosusu oyo okutani na bango ntango ozongeli moto oyo asepelaki na nsango malamu. Okoki mpe kolakisa bazulunalo na bato oyo okutani na bango ntango okei kosomba biloko, na mobembo, to na lopitalo ntango ozali kozela kokutana na monganga. Kobá kobongisa maloba na yo ya kobanda lisolo wana ozali kosalela yango na boumeli ya sanza.
8. Na ndenge nini Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! ekeseni na bazulunalo mosusu nyonso?
8 Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! ekeseni na bazulunalo mosusu nyonso. Ekumisaka Yehova, Mokonzi ya molɔ́ngɔ́ mobimba. (Mis. 4:24) Ebɔndisaka bato na nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe mpe elendisaka bango bándimela Yesu Klisto. (Mat. 24:14; Mis. 10:43) Lisusu, elandaka ndenge makambo ya mokili ezali kokokisa bisakweli ya Biblia. (Mat. 25:13) Salelá mabaku nyonso mpo na kolakisa bato ya teritware na bino bazulunalo yango mpo esalisa bango!
9. Tokoki kosala nini mpo na kozwa likoki ya kozongela moto?
9 Soki opesi moto zulunalo, to osololi na ye malamu na makambo ya Nzambe, tuná ye motuna moko to lobá likambo moko oyo ekotinda ye akanisa mpe ekoki kopesa yo nzela ozongela ye mpo bókoba kosolola na Biblia. Soki tozali kolona mboto ya solo na molende, tokoki kotya motema ete Yehova akofungola mitema ya bato oyo balingi mpenza koyeba ye mpe kosalela ye.—1 Kol. 3:6.