Salisá bayekoli ya Biblia bákóma basakoli ya nsango malamu ya Bokonzi
1 Mokumba oyo Yesu apesaki bayekoli na ye, oyo emonisami na Matai 28:19, 20, ezalaki monene mpenza. Klisto atindaki bayekoli na ye bákómisa bato ebele bayekoli, oyo na ngala na bango bakokómisa mpe bato mosusu bayekoli. Na ndenge yango, nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe esengelaki kokoba kosakolama na mokili mobimba tii na mikolo oyo ya nsuka mpe ya ndenge mosusu oyo tozali na yango.—Mat. 24:14.
2 Bayekoli ya Biblia oyo tosengeli kosalisa ekoki kozala bana na biso mpe bato mosusu oyo bandimaka tóyekola na bango Biblia. Tolingi mpenza kosalisa bango bándima mpe mokumba ya kosalisa basusu bákóma bayekoli ya Yesu Klisto.—Luka 6:40.
3 Lakisá bango ndenge ya kopesa litatoli: Lendisá bato oyo oyekolaka na bango Biblia báyebisaka basusu makambo oyo bazali koyekola. Bɛtelá bango masolo ya kolendisa ya mosala ya kosakola. Lakisá bana na yo banda bomwana mpenza ndenge ya kopesa litatoli malamumalamu, na kotalela makoki na bango. (Nz. 148:12, 13) Monisá na maloba mpe na misala ete mosala ya kosakola ezali na ntina mingi mpo na yo.—1 Tim. 1:12.
4 Yehova apesaka mokumba yango kaka na baoyo bandimi kotosa mitinda na ye ya sembo. Toboyi te, mosakoli ya sika akoki te koyeba makambo mingi lokola basakoli ya kala oyo bamipesá na Nzambe mpe bazwá batisimo. Atako bongo, moto oyo alingi kokóma mosakoli ya sika asengeli kondima mateya ya moboko ya Biblia mpe koyeba kolimbola yango. (Talá buku Tobongisami, nk. 79-82.) Asengeli mpe kokabwana mpenza na “Babilone Monene,” koboya kokɔta na makambo ya politiki, mpe koyanganaka na makita nyonso.—Emon. 18:2, 4; Yoa. 17:16; Ebe. 10:24, 25.
5 Soki omoni ete moto oyo oyekolaka na ye Biblia akokisi masɛngami mpo na kokóma mosakoli oyo azwi naino batisimo te, yebisá yango mbala moko na mokɛngɛli-mokambi ya lisangá na bino. Ye akobongisa mpo bankulutu mibale básolola na moyekoli yango na miso na yo mpo báyeba soki akokisi masɛngami mpo na kobanda kosakola nsango malamu ya Bokonzi elongo na lisangá. Na ndenge yango, okozwa libaku malamu ya kobimaka na ye na mosala ya kosakola mpo na kosalisa ye lisusu malamumalamu.