Tósakola kozanga kotika
1 Na bantango mosusu, tokoki komona ete tosakoli mingi na teritware na biso kasi bato bazali mpenza te kosepela na nsango malamu. Atako bongo, tozali na bantina mpenza ya kokoba kosakola.—Mat. 28:19, 20.
2 Mpo na litatoli: Yesu asakolaki ete kosakolama ya nsango ya Bokonzi ekozala eteni monene ya elembo ya “bosukisi ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo” mpe ekosalema “mpo na litatoli na bikólo nyonso.” (Mat. 24:3, 14) Ntango bato bazali komona biso tozali kosakola nsango malamu ya Bokonzi, bazali kozwa litatoli monene. Soki tosakolaki na esika moko, ata soki bato baboyaki koyoka biso, mbala mosusu bakokoba kolobela na boumeli ya bangonga to mikolo mingi ndenge oyo tokendeki kotala bango. Koyeba bantina oyo etindaka biso tósakola esalisaka biso tólɛmba te. Ntango tosakwelaka bato mpe toyebisaka bango makebisi ya Nzambe, tokokisaka esakweli ya Biblia mpe yango esepelisaka Yehova.—2 Tes. 1:6-9.
3 Tólɛmba te: Lokola bato bakómi na mitindo mingi ya kominanola mpe na makambo mingi ya kosala, tosengeli kolɛmba te kosalisa bango básepela na nsango malamu. Batatoli bazalaki kozongela mwasi moko pɔsɔ nyonso, kasi elekaki mbula mobimba liboso ete andima kofandisa bango mpo básolola na Biblia. Asepelaki mingi na makambo oyo bayebisaki ye, andimaki koyekola Biblia, mpe akómaki koyangana na makita. Eumelaki te, amonisaki mposa ya kozwa batisimo.
4 Makambo ya mokili ezali kobongwana nokinoki, ndenge moko mpe makanisi ya bato. Bato oyo baboyaki koyamba biso liboso, bakoki lelo oyo kosepela na elikya ya kobɔndisa oyo tozali kosakwela bango. Soki ata moto moko mpamba andimi nsango ya Bokonzi, milende na biso ekei na mai te.
5 Na mokili mobimba, bato oyo bazali ‘kokimela mpe kolela na ntina ya makambo ya mbindo nyonso oyo esalami’ bazali se kokóma ebele. (Ezek. 9:4) Mbuma oyo mosala ya kosakola ezali kobimisa emonisi ete bato ya mitema sembo bazali kondima nsango ya Bokonzi. (Yis. 2:2, 3) Na bongo, tiká ete tókoba kosakola kozanga kotika, mpe tólɛmba te koyebisa bato na bolingo mpenza “nsango malamu ya kosepela.”—Yis. 52:7; Mis. 5:42.