Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 1/09 lok. 1
  • Ndenge nini bakoyoka?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndenge nini bakoyoka?
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2009
  • Masolo mosusu
  • Tósakola nsango malamu kozanga kotika
    Mosala na biso ya Bokonzi—1996
  • Ntina oyo tozongelaka bato mbala na mbala
    Mosala na biso ya Bokonzi—2007
  • Tolanda mosala na biso ya kosakola Bokonzi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
  • Tósakola kozanga kotika
    Mosala na biso ya Bokonzi—2008
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2009
km 1/09 lok. 1

Ndenge nini bakoyoka?

1. Mpo na nini mosala ya kosakola ekoki kozala mpasi, kasi mpo na nini tosengeli kokoba kosakola?

1 Lokola mokolo ya Yehova ezali se kokóma pene, tosengeli kosala nokinoki mpo na kosalisa ebele ya bato bázwa boyebi ya solosolo ya Nzambe mpe ya mokano na ye mpo na bato. (Yoa. 17:3; 2 Pet. 3:9, 10) Na bantango mosusu, yango ekoki kozala mpasi mpo bato mingi basepelaka te na nsango na biso to mpe batyolaka biso mpo na mosala na biso ya kosakola. (2 Pet. 3:3, 4) Atako bongo, tozali na bantina mingi ya kokanisa ete tokoki naino kokutana na bato na teritware na biso, oyo bakondima nsango malamu soki bayoki yango. Ndenge nini bato yango bakoyoka soki moto oyo akosakola azali te?​—Lom. 10:14, 15.

2. Ndenge nini ndakisa ya ntoma Paulo ezali kolendisa biso?

2 Ntango tokutani na botɛmɛli: Lokola bato mosusu bazali na mposa ya koyoka nsango ya Bokonzi, tosengeli kobanga te. Filipi ezali engumba ya liboso ya Mpoto epai ntoma Paulo asakolaki nsango malamu. Ntango bakoselaki ye ná Silasi makambo, babɛtaki bango na mangenda mpe batyaki bango na bɔlɔkɔ. (Mis. 16:16-24) Atako bakutanaki na likambo ya mpasi ndenge wana, Paulo atikaki kosakola te mpo na kobanga. Ntango akendaki na Tesaloniki, engumba ya mibale na mobembo na ye ya misionɛrɛ, ‘azwaki mpiko na lisalisi ya Nzambe.’ (1 Tes. 2:2) Ndakisa ya Paulo emonisi mpenza ntina oyo tosengeli ‘kotika te.’​—Gal. 6:9.

3. Nini ekoki kosala ete bato mosusu bábongola makanisi atako liboso bazalaki te kosepela na nsango malamu?

3 Bato mingi oyo bazalaki koboya koyoka nsango malamu banda bambula ebele, bakómi sikoyo kondima koyoka yango. Ekoki kozala ete mikakatano ya nkita, maladi, liwa ya ndeko moko na libota, to bansango ya makambo ya mabe oyo ezali kosalema na mokili esali ete bábongola makanisi. (1 Kol. 7:31) Bamosusu oyo baboti na bango bazalaki kopekisa bango báyoka nsango malamu bakómi sikoyo mikóló mpe bazali na mposa ya koyoka. Soki tozali kokoba kosakola, tokopesa bato yango libaku ya ‘kobelela nkombo ya Yehova’ liboso ete nsuka eya.​—Lom. 10:13.

4. Nini etindaka biso tósakola “kozanga kotika”?

4 “Kozanga kotika”: Bolingo na biso mpo na Yehova mpe bazalani na biso ekotinda biso tósala mosala ya kosakola mpe ya kokómisa bato bayekoli “kozanga kotika,” kaka ndenge bantoma basalaki na ekeke ya liboso. (Mis. 5:42) Lelo oyo, bato mingi bazali ‘kokimela mpe kolela na ntina ya makambo nyonso ya mbindo’ oyo ezali kosalema. (Ezek. 9:4) Bato wana bakómaka mpenza na elikya mpe babɔndisamaka ntango bayoki nsango malamu! Ata soki bato mingi baboyi koyoka, Biblia ezali kondimisa biso ete Yehova asepelaka na milende oyo tosalaka.​—Ebe. 13:15, 16.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto