Biyano na mituna na bino
◼ Baboti nyonso mibale bakoki nde kokoma na lapolo na bango ngonga oyo balekisi na boyekoli ya libota?
Tata nde azali libosoliboso na mokumba ya kobɔkɔla bana “na disipilini mpe na makebisi ya Yehova”; atako bongo, baboti nyonso mibale bapesanaka mabɔkɔ mpo na koteya bana. (Ef. 6:4) Biblia epesi bana etinda oyo: “Mwana na ngai, yoká mateya ya tata na yo mpe tiká mibeko ya mama na yo te.” (Mas. 1:8) Moko ya makambo oyo baboti basalaka mpo na koteya bana ezali koyekola Biblia na libota.
Tii sikoyo, kaka moboti oyo atambwisi boyekoli ya libota elongo na bana oyo bazwi batisimo te nde asengelaki kokoma ngonga yango na lapolo na ye, ata soki baboti nyonso mibale basanganaki na lisolo. Nzokande, ekozala lisusu bongo te. Soki na ntango ya boyekoli baboti nyonso mibale bateyaki bana, mokomoko na bango akokoma ngonga yango na lapolo na ye; kasi, ekoleka ngonga moko te na pɔsɔ. Ezali solo ete baboti bateyaka bana na bango bangonga mingi na pɔsɔ. Baboti nyonso mibale basengeli kosala milende ntango nyonso mpo na koteya bana. (Deut. 6:6-9) Nzokande, lapolo na biso esengeli libosoliboso komonisa bangonga oyo tolekisaki na mosala ya kosakola. Na bongo, ngonga oyo mokomoko na bango akokoma na lapolo na ye ekoleka ngonga moko te na pɔsɔ, ata soki bayekolaki bangonga mingi, to mbala mingi na pɔsɔ, to bayekolaki na mwana mokomoko. Moboti moko kaka nde akopesa lapolo ya boyekoli ya libota mpe akotánga kaka bozongeli moko na pɔsɔ oyo boyekoli esalemaki.