Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 4/09 lok. 4
  • Biyano na mituna na bino

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Biyano na mituna na bino
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2009
  • Masolo mosusu
  • Masangá ya sika oyo esalemi na kolanda mibeko ya Leta na États-Unis
    Mosala na biso ya Bokonzi—2002
  • Watch Tower Bible and Tract Society ezali nini?
    Mituna oyo bato batunaka mingi mpo na Batatoli ya Yehova
  • Lisangani ya Mikóló-Bakambi ekeseni na lisangani oyo esalemi na kolanda mibeko ya Leta
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Liyebisi moko ya ntina mingi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2009
km 4/09 lok. 4

Biyano na mituna na bino

◼ Ezali malamu ete Motatoli ya Yehova to lisangá moko esalela elembo (logo) oyo ebongiseli ya Yehova esalelaka?

Logo ekoki kozala nkombo to elembo oyo esalisaka na koyeba ebongiseli to lisangá moko boye mpe kokesenisa yango na mosusu. Lisangá Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania mpe masangá mosusu oyo esalemi na kolanda mibeko ya Leta, esalelaka elembo to logo ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli (mwa liyemi oyo ezalaka na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli). Lisangá Christian Congregation of Jehovah’s Witnesses esalelaka elembo to logo ya Biblia oyo efungwamá. Masangá mosusu oyo Batatoli ya Yehova basalelaka, esalelaka bilembo to ba logo mosusu.

Lisangá moko to motatoli ya Yehova moko asengeli te kosalela logo to nkombo oyo ebongiseli ya Yehova esalelaka, ezala na Ndako ya Bokonzi, na mikanda oyo azali kotindela bato, to na biloko na ye moko, mpe bongo na bongo. Soki totye logo ya ebongiseli ya Yehova, bakonzi ya Leta, basakoli mosusu, mpe bato mosusu bakoyeba te kokesenisa lisangá mokomoko ná masangá oyo esalemi na kolanda mibeko ya Leta. Ndenge moko mpe, bato bakoki kokanisa ete mikanda nyonso oyo ezali na logo yango endimami to euti na biro monene ya Batatoli ya Yehova to na biro ya filiale.

Logo ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli to elembo mosusu oyo ekokani na yango, esengeli te kotyama na Bandako ya Bokonzi oyo ekotongama nsima, atako Bandako ya Bokonzi ezali biloko ya Watch Tower. Masangá oyo Bandako ya Bokonzi ezali na logo basɛngisami te kolongola yango mbala moko, mpamba te kosala bongo ekoki mbala mosusu kobebisa Ndako ya Bokonzi, to kosɛnga ntango mingi, milende mingi, mpe mbongo mingi. Nzokande, soki ekozala mpasi te mpo na kolongola logo yango mpe ekosɛnga mosala makasi te, esengeli kolongola yango. Kasi soki ekozala mpasi, bokolongola yango ntango bokobongisa Ndako ya Bokonzi na mbala ya nsima.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto