Tóteyaka na maloba ya pɛtɛɛ
1. Wapi likambo moko ya ntina mingi mpo na koteya malamu mpe na ndenge ya polele?
1 Kosalela maloba ya pɛtɛɛ ezali na ntina mingi ntango tozali koteya. Kotalela ndenge oyo Yesu, Moteyi Monene, azalaki koteya ekoki kosalisa biso tóbongisa ‘mayele na biso ya koteya.’—2 Tim. 4:2; Yoa. 13:13.
2. Koteya na maloba ya pɛtɛɛ esɛngaka nini, mpe yango etindaka bato básala nini?
2 Tósalela elobeli ya pɛtɛɛ: Na Lisolo na ye Likoló ya Ngomba, Yesu ateyaki mateya ya solo oyo ezali mpenza mozindo, kasi asalelaki maloba ya pɛtɛɛ. (Mat., mikapo 5-7) Ebele ya bato oyo bayokaki Yesu “bakamwaki na ndenge na ye ya koteya.” Bapolisi oyo batindamaki mpo na kokanga Yesu balobaki ete: “Naino moto mosusu alobá lokola moto oyo te.” (Mat. 7:28, 29; Yoa. 7:46) Ezali na ntina te tósalela maloba ya makasimakasi, bafraze ya mindɔndɔmindɔndɔ, to bandakisa ya milaimilai mpo na kondimisa bato mateya ya solo. Tokoki kosalela maloba oyo bato bayebi malamu mpo na kolimbola mateya ya solo.
3. Mpo na nini bato mosusu basopelaka bayoki na bango mateya ebeleebele, mpe tokoki kosala nini mpo na kokwea na motambo wana te?
3 Koteya makambo ebele na mbala moko te: Yesu azalaki kotalela bayoki na ye mpo na koyeba makambo nini akoki koyebisa bango na mbala moko. (Yoa. 16:12) Tosengeli koluka koyeba bamposa ya bato mpe koyokanisa lisolo na moto oyo tokutani na ye, mingimingi ntango tozali kopesa litatoli epai ya bandeko na biso ya libota, bato oyo babandi kosepela na nsango malamu, to bana mike. Tosengeli kokeba ete tósopela bango mateya ebeleebele te, ata soki emonani ete bazali kolanda biso na likebi. Bato ya mitema sembo bakokoba koyekola koyeba Yehova, Nzambe ya solo.—Yoa. 17:3; 1 Kol. 3:6.
4. Mpo na nini tosengeli nde koluka kobimisa makanisi ya ntina, na esika ya kolobela makambo ebeleebele?
4 Tóbimisa nde makanisi ya ntina: Yesu azalaki te kobakisa makanisi ebeleebele na mateya na ye mpo na kokómisa yango mindɔndɔ. Ntango alobaki ete “baoyo nyonso bazali na kati ya malita ya kokanisama . . . bakobima,” ezalaki na ntina te alimbola na ntango wana makambo nyonso oyo etali lisekwa mpo na bomoi na likoló, mpe lisekwa mpo na bomoi na mabelé. (Yoa. 5:28, 29) Ntango tozali koyekola na moto Biblia, tosengeli nde kobimisa makanisi ya ntina, mpe kokeba ete tókɔtisa te makanisi oyo ezali na lisolo te.
5. Lipamboli nini tokozwa soki tozali koteya na maloba ya pɛtɛɛ?
5 Tozali mpenza na botɔndi ndenge Yehova asalelaka maloba ya pɛtɛɛ mpo na koteya biso makambo nyonso oyo tosengeli koyeba! (Mat. 11:25) Tiká ete tósala makasi mpo na koteya na maloba ya pɛtɛɛ; na ndenge yango, tokozala na esengo ya kosala mosala oyo ezali kobota mbuma.