Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 7/09 lok. 1
  • Okoki kosala lisusu mingi?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Okoki kosala lisusu mingi?
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2009
  • Masolo mosusu
  • Mosala ya mobongisi-nzela: ezali mpo na yo?
    Mosala na biso ya Bokonzi—1998
  • Tókolisa mosala na biso ya motuya
    Mosala na biso ya Bokonzi—1995
  • Mapamboli ya mosala ya Mobongisi-nzela
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
Mosala na biso ya Bokonzi—2009
km 7/09 lok. 1

Okoki kosala lisusu mingi?

1. Mposa nini ezali na mosala ya kosakola, mpe mpo na nini?

1 Ntango Yesu amonaki ete bato mingi bazali kosepela na nsango malamu ya Bokonzi, alendisaki bayekoli na ye ‘básɛnga Nkolo ya mosala ya kobuka mbuma atinda basali na mosala na ye ya kobuka mbuma.’ (Mat. 9:37, 38) Lokola tozali na nsuka ya eleko ya kobuka mbuma, tosengeli mpenza kosala mosala na biso na lombangu. Yango elingi koloba ete tosengeli kokanisa ndenge oyo tokoki kosala lisusu mingi na mosala ya kosakola.​—Yoa. 14:13, 14.

2. Lokola mposa ya basali ezali monene, yango etindaki bandeko mosusu básala nini?

2 Ndenge oyo tokoki kosala lisusu mingi: Nsima ya koluka litambwisi ya Yehova mpe lisalisi na ye, bandeko mingi bamonaki ete bakoki kosala mosala ya mobongisi-nzela. (Nz. 26:2, 3; Flp. 4:6) Bamosusu bazwaki bibongiseli mpo ete mbula nyonso, bázalaka babongisi-nzela basungi sanza moko to basanza mingi. Likambo yango esalisi bango mpo básalaka mingi na mosala ya kosakola. Bandeko mingi oyo basalaki mosala ya mobongisi-nzela mosungi bayokaki mpenza esengo mpe yango epesaki bango mposa ya kokóma babongisi-nzela ya sanza na sanza.​—Mis. 20:35.

3. Soki na bambula eleká ozalaká mobongisi-nzela, ekoki kozala malamu otalela likambo nini?

3 Okoki kozala lisusu mobongisi-nzela?: Ekoki kozala ete na bambula eleká, osalaká mosala ya mobongisi-nzela; soki ezali boye, na ntembe te, ozalaka na basuvenire malamu ya eleko yango. Osilá kozwa ntango ya kokanisa malamu soki okoki kozongela mosala ya mobongisi-nzela? Ekoki kozala ete makambo oyo esalaki ete otika mosala yango ezali lisusu kopekisa yo te. Ekoki kozala ete sikoyo ozali na likoki ya kosala lisusu mosala yango.​—1 Yoa. 5:14, 15.

4. Biso nyonso tozali na libaku ya kosala nini?

4 Mosala ya kobuka mbuma ezali kokoba mpe etikali moke esila. (Yoa. 4:35, 36) Mokomoko na biso asengeli kotalela makambo ya bomoi na ye mpo na koyeba soki akoki kobongola likambo moko mpo asala lisusu mingi na mosala ya kosakola. Kasi, soki tokoki kobongola likambo moko te mpo na kosala lisusu mingi, tokoki ata koluka ndenge oyo tokoki kosala mosala na biso malamu koleka. (Mko. 12:41-44) Bato nyonso oyo bomoi na bango ezali kopesa bango nzela ya kondima ete Yehova asalela bango mingi na mosala ya kosakola, bazali mpenza na libaku malamu!​—Nz. 110:3.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto