Ndenge ya kolakisa bazulunalo
(Soki zulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 1 Yuli
“Okanisi ete moto akoki kozwa kimya ya motema lelo oyo? [Tiká ye apesa eyano.] Yoká ndenge Biblia elobi na Bafilipi 4:6, 7. [Tángá.] Lisolo oyo ezali kolimbola ndenge oyo moto akoki kozala na kimya oyo Nzambe apesaka.” Lakisá ye lisolo oyo ebandi na lokasa 10.
Lamuká! Yuli
“Mbala mingi tosepelaka kokangama kaka na nzela oyo baboti balakisá biso. Okanisi ete ezali mabe tóluka koyeba soki mateya ya lingomba oyo bateyá biso banda bomwana ezali solo? [Tiká ye apesa eyano. Na nsima, tángá 1 Yoane 4:1.] Lisolo oyo emonisi soki ezali mabe ete moto akɔta na lingomba mosusu.” Lakisá ye lisolo oyo ebandi na lokasa 28.
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 1 Augusto
“Bato mosusu balobaka ete mangomba nyonso ezali banzela oyo ememaka kaka epai ya Nzambe moko. Yo mpe okanisaka ete mangomba nyonso ezali malamu? [Tiká ye apesa eyano. Na nsima, tángá Matai 7:13, 14.] Zulunalo oyo elobeli makambo misato oyo Biblia elobeli, oyo lingomba ya solo esengeli kolendisa.”
Lamuká! Augusto
“Esilá kokómela mokomoko na biso ete bato básalela ye makambo na bosembo te mpo ozali moto ye ekólo mosusu to mposo mosusu. Na makanisi na yo, Nzambe atalelaka ezaleli yango ndenge nini? [Tiká ye apesa eyano. Na nsima, tángá Misala 10:34, 35.] Biblia ekoki kosalisa biso tóbungisa esengo te ata soki bazali kosalela biso makambo na bosembo te. Lisusu, Biblia ekoki kosalisa biso tótika kokanisela bato ya bikólo mosusu to ya mposo mosusu mabe. Zulunalo oyo elimboli likambo yango.”