Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 6/09 lok. 8
  • Ndenge ya kolakisa bazulunalo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndenge ya kolakisa bazulunalo
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2009
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • (Soki zulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)
  • Ndenge ya kolakisa bazulunalo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2010
  • Ndenge ya kolakisa bazulunalo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2009
  • Ndenge ya kolakisa bazulunalo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2010
  • Ndenge ya kolakisa bazulunalo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2010
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2009
km 6/09 lok. 8

Ndenge ya kolakisa bazulunalo

(Soki zulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 1 Yuni

“Bato mingi bakanisaka ete mangomba ezali lokola banzela ndenge na ndenge oyo ememaka kaka epai ya Nzambe. Yo okanisi nini? [Tiká ye apesa eyano.] Yoká oyo Biblia elobi. [Tángá Yosua 24:15.] Lisolo oyo emonisi ntina oyo moto na moto asengeli kotalela malamu lingomba na ye mpo na koyeba soki ememaka epai ya Nzambe ya solo.” Lakisá lisolo oyo ebandi na lokasa 12.

Lamuká! Yuni

“Na ntembe te, oyebi bato mingi oyo bakufá. Okanisi ete tosengeli kobanga ete bamosusu básilika mpe básala biso mabe? [Tiká ye apesa eyano. Na nsima, tángá Mosakoli 9:5, 6.] Lisolo oyo ekobɔndisa yo.” Lakisá lisolo oyo ebandi na lokasa 22.

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 1 Yuli

“Bato mingi oyo bazali na Biblia bamonaka ete ezali mpasi kokanga ntina ya makambo oyo yango elobeli. Yo mpe omonaka bongo? [Tiká ye apesa eyano.] Vɛrsɛ oyo emonisi ete Yehova, Nkolo Biblia, alingaka ete tókanga ntina ya makambo oyo Biblia elobeli mpe tózwa litomba na yango. [Tángá Nzembo 119:130.] Zulunalo oyo epesi toli misato oyo ekosalisa biso tókanga ntina ya makambo oyo ezali na Biblia.”

Lamuká! Yuli

“Lelo oyo, bato mingi bazali konyokwama na makanisi. Okanisi ete Nzambe akipaka mpenza bato oyo bazali na maladi ya makanisi? [Tiká ye apesa eyano. Na nsima, tángá Nzembo 34:18.] Zulunalo oyo elimboli ndenge Nzambe akoki kosalisa bato oyo bazali konyokwama na makanisi, atako basengeli mpe koluka lisalisi ya monganga. Eyebisi biso mpe mwa makambo oyo tokoki koloba na bango mpo na kobɔndisa bango.”

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto