Oyo okoki kosala mpo ozwa matomba na etuluku na bino ya mosala ya kosakola
1. Matomba nini tozalaki kozwa na Boyekoli ya Mokanda ya lisangá oyo tozwaka mpe lelo na Etuluku ya mosala ya kosakola?
1 Omonaka ete ozali kozanga makambo mosusu oyo ozalaki kozwa na Boyekoli ya Mokanda ya lisangá? Bituluku yango ezalaki na bato moke mpe moto nyonso azalaki komiyoka malamu. Ezalaki pɛtɛɛ tókóma baninga mpe yango ezalaki kolendisa biso tótikala makasi na elimo. (Mas. 18:24) Mokɛngɛli ya Boyekoli ya mokanda ayebaki malamu ndeko mokomoko ya etuluku na ye mpe azalaki kolendisa ye. (Mas. 27:23; 1 Pe. 5:2, 3) Ezalaka mpe bongo lelo oyo na etuluku na biso ya mosala ya kosakola.
2. Ndenge nini tokoki koluka mabaku ya kokóma na boninga makasi na bandeko ya etuluku na biso mpo tólendisana na elimo?
2 Lukáká mabaku: Mbala mingi, bituluku ya mosala ya kosakola ezalaka na bato moke ndenge ezalaki mpe na Boyekoli ya mokanda. Soki tozali kosakola “elongo” na bandeko, tokokóma na boninga makasi. (Flp. 1:27) Osilá kosakola elongo na bandeko boni ya etuluku na bino? Okoki ‘kofungwama’ na likambo yango? (2 Ko. 6:13) Lisusu, tokoki mpe kobengisa ndeko moko ya etuluku na biso na losambo na biso ya libota to mpo na kolya elongo. Na masangá mosusu, bituluku ya mosala ya kosakola nde eyambaka molobi-mopaya, moko nsima na mosusu. Na pɔsɔ oyo bakoyamba molobi-mopaya, bandeko ya etuluku yango bayanganaka mpo na kolya mpe kolendisana ata soki molobi akozala wana te.
3. Wapi mwa mabaku ya kozwa bilendiseli na etuluku na biso ya mosala ya kosakola?
3 Atako lelo oyo lisangá mobimba eyanganaka kaka mbala mibale na pɔsɔ, yango elingi koloba te ete basakoli bakolendisama mpenza te. Etuluku mokomoko ezali na mokɛngɛli oyo alendisaka ndeko mokomoko mpe apesaka ye formasyo na mosala ya kosakola. Soki mokɛngɛli ya etuluku na bino asɛngá yo naino te ete bósakola elongo, mpo na nini te yo osɛnga ye? Longola yango, mokɛngɛli ya mosala ya kosakola asakolaka elongo na etuluku moko mbala moko na sanza, mokolo ya pɔsɔ mpe ya lomingo. Na masangá ya mike oyo ezali na bituluku ya mosala ya kosakola mingi te, akoki kozwa bibongiseli mpo atala etuluku mokomoko mbala mibale na mbula. Obongisaka programɛ na yo mpo obima na mosala ya kosakola ntango ayei kotala etuluku na bino?
4. (a) Ndenge nini makita mpo na mosala ya kosakola ebongisamaka? (b) Mpo na nini tosengeli kotalela soki tokoki kopesa ndako na biso mpo na likita ya mosala ya kosakola?
4 Mbala mingi, ezalaka malamu etuluku mokomoko esalaka likita na yango ya mosala ya kosakola na mokolo ya pɔsɔ mpe ya lomingo. Soki bisika ya kokutana mpo na mosala ya kosakola ezali mingi mpe likita ya mosala ya kosakola esalemi na ngonga moko to mwa moke na nsima, yango ekozala mpasi te basakoli bákende na likita yango to mpe na teritware. Basakoli bakoki komibongisa nokinoki mpe kobanda kokende na teritware kozanga kolekisa ngonga. Ekozala mpe mpasi te mpo mokɛngɛli atyela ndeko mokomoko ya etuluku na ye likebi oyo ebongi. Nzokande, makambo mosusu ekoki kosala ete bósangisa bituluku mibale to koleka esika moko. Soki lisangá mobimba eyangani mokolo ya pɔsɔ ya liboso ya sanza to nsima ya Boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, mbala mingi ekozala malamu bandeko ya etuluku mokomoko bákutana na mokɛngɛli na bango mpo akabola bango liboso ya kosukisa likita yango na libondeli.—Talá etanda “Okoki kopesa ndako na yo?”
5. Atako Boyekoli ya mokanda esalemaka lisusu te, likambo nini tokoki kotyela motema?
5 Atako Boyekoli ya mokanda na lisangá esalemaka lisusu te, Yehova azali kokoba kopesa biso nyonso oyo esengeli mpo na kosala mokano na ye. (Ebr. 13:20, 21) Lokola Yehova azali kobatela biso, tozangaka eloko te. (Nz. 23:1) Tokoki kozwa matomba mingi na etuluku na biso ya mosala ya kosakola. Soki tozali koluka mabaku mpe tozali “kolona mingi,” ‘tokobuka mpe mingi.’—2 Ko. 9:6.
[Etanda na lokasa 6]
Okoki kopesa ndako na yo?
Masangá mosusu esangisaka bituluku ebele esika moko mokolo ya pɔsɔ mpe ya lomingo mpo bisika mosusu ezali te. Makita mpo na mosala ya kosakola ezali moko ya bibongiseli ya lisangá; yango wana, kopesa ndako na yo mpo na yango ezali mpenza libaku malamu. Okoki kopesa ndako na yo? Kokakatana te mpo ndako na yo ezali moke to mpo ezali na biloko mingi te. Bankulutu bakotalela esika ndako na yo ezali mpe makambo mosusu, kaka ndenge ezalaki kosalema mpo na kopona esika ya kosala boyekoli ya mokanda. Soki olingi kopesa ndako na yo, yebisá mokɛngɛli ya etuluku na bino.