Ndenge ya kolakisa bazulunalo (Soki zulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 1 Ɔkɔtɔbɛ
“Lelo oyo, bato mingi bazali lisusu kondimela Mozalisi te. Mpo na yo, nini ememi likambo yango? [Tiká ye apesa eyano.] Mokapo oyo emonisi ntina moko. [Tángá Habakuku 1:2, 3.] Lisolo oyo epesi biyano na mituna mosusu oyo bato batunaka mpo na Nzambe, oyo esali ete bato mosusu bázala lisusu na kondima te.” Lakisá lisolo oyo ebandi na lokasa 11.
Lamuká! Ɔkɔtɔbɛ
“Lelo oyo, mabota ezali kokutana na mikakatano mingi, ezali bongo te? [Tiká ye apesa eyano.] Bato mingi bayebaka te ete Biblia ezali na batoli ya malamu mpenza. Tózwa ndakisa moko. [Tángá vɛrsɛ moko oyo oponi na kati ya zulunalo.] Lamuká! ya sanza oyo ezali kolimbola ndenge oyo batoli ya Biblia ekoki kosalisa mabota elonga mikakatano ndenge na ndenge oyo bazali kokutana na yango.”
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 1 Novɛmbɛ
“Ondimaka ete makambo nyonso oyo bateyaka na mangomba eutaka na Biblia? [Tiká ye apesa eyano.] Biblia ezali kolendisa biso tófungola miso mpo tókosama te na mateya ya lokuta. [Tángá Bakolose 2:8.] Zulunalo oyo emonisi mateya motoba oyo euti na Liloba ya Nzambe te.”
Lamuká! Novɛmbɛ
“Lelo oyo, bato mingi bazali kosalela telefone mpe ordinatɛrɛ. Na makanisi na yo, biloko yango ezali kosalisa biso tósomba ntango to nde ezali kolya biso ntango? [Tiká ye apesa eyano.] Bato mingi bandimaka maloba oyo ezali kolendisa biso tósalela ntango na biso malamu. [Tángá Baefese 5:15, 16.] Zulunalo oyo ezali na masolo oyo ezali komonisa ndenge oyo tokoki kosalela biloko ya mikolo oyo na ndenge ebongi.”