Tozali Batatoli ngonga nyonso
1. Liteya nini tokoki kozwa na ndenge oyo Yesu apesaki mwasi moko litatoli na libulu ya mai?
1 Mokolo moko, Yesu atambolaki bangonga mingi. Alɛmbaki mingi mpe azalaki na mposa ya mai. Ntango bayekoli na ye bakendaki kosomba biloko ya kolya, afandaki na libulu moko ya mai na libándá ya engumba moko ya Samaria mpo na kopema. Yesu akendaki na Samaria mpo na kosakola te; azalaki nde koleka mpo akende kosakola na Galile. Atako bongo, alekisaki te libaku ya kopesa mwasi moko oyo ayaki kotoka mai litatoli. (Yoa. 4:5-14) Mpo na nini? Yesu azalaki “motatoli ya sembo mpe ya solo” ya Yehova ngonga nyonso. (Em. 3:14) Tosengeli komekola Yesu mpe kozala Batatoli ya Yehova ngonga nyonso.—1 Pe. 2:21.
2. Ndenge nini tokoki komibongisa mpo na kopesa litatoli ya libaku malamu?
2 Tómibongisa: Mpo tómibongisa mpo na kopesa litatoli ya libaku malamu, tosengeli kozangaka mikanda te ntango tobimi. Basakoli mingi batambolaka na mwa batrakte mpe batikelaka yango batɛki na bamagazini, basali ya bisika oyo basombaka esansi, mpe bato mosusu oyo bakutanaka na bango. (Mos. 11:6) Ndeko mwasi moko oyo asalaka mibembo mingi azangaka te komema Biblia na ye ya moke mpe buku Biblia eteyaka na sakosi na ye ya mabɔkɔ, mpe abandaka lisolo na moto oyo afandi pembeni na ye.
3. Ndenge nini tokoki kobanda lisolo?
3 Tóbandaka lisolo: Ntango tolingi kopesa litatoli ya libaku malamu, esengeli te tóbanda mbala moko na lisolo ya Biblia. Ntango Yesu asololaki na mwasi oyo akutanaki na ye na libulu ya mai, ayebisaki ye mbala moko te ete azali Masiya. Asɛngaki mwasi yango kaka mai, mpe yango ebendaki likebi na ye. (Yoa. 4:7-9) Ndeko mwasi moko amonaki ete kosala ndenge wana esalisaka ye mpe abanda lisolo ntango batuni ye soki alekisaki malamu fɛti moko boye. Na esika aloba mbala moko ete asalaka fɛti yango te mpo azali Motatoli ya Yehova, alobaka ete: “Ngai moko naponá nasalaka fɛti yango te.” Mbala mingi yango ebendaka likebi ya moto oyo atuni motuna mpe alukaka koyeba mpo na nini, mpe ndeko yango azwaka libaku ya kopesa litatoli.
4. Mpo na nini Matai 28:18-20 elendisaka yo?
4 Atako Yesu asukisaki mosala ya kosakola oyo asalaki na molende ntango azalaki awa na mabele, atyaka ntango nyonso likebi na mosala yango oyo ezali kosalema ndenge ye asalaki. (Mat. 28:18-20) Yango wana, lokola Yesu, Ndakisa na biso, tozali Batatoli oyo tomibongisi mpo na kopesa litatoli polelepolele mpo na kondima na biso na libaku nyonso.—Ebr. 10:23.