Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 9/10 lok. 4
  • Ndenge ya kolakisa bazulunalo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndenge ya kolakisa bazulunalo
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2010
  • Masolo mosusu
  • Ndenge ya kolakisa bazulunalo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2009
  • Ndenge ya kolakisa bazulunalo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2009
  • Ndenge ya kolakisa bazulunalo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2009
  • Ndenge ya kolakisa bazulunalo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2010
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2010
km 9/10 lok. 4

Ndenge ya kolakisa bazulunalo

(Soki zulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 1 Sɛtɛmbɛ

“Ntango mosusu bato basalaka makambo mabe mpo bateyamaki mabe na lingomba na bango. Mpo na yo, nini esalaka ete bákosama bongo? [Tiká ye apesa eyano.] Yoká oyo Biblia ezali kolendisa biso tósala. [Tángá 1 Yoane 4:1.] Lisolo oyo emonisi ntina ya kotalela bindimeli na biso mpo na koyeba soki ekokani na oyo Liloba ya Nzambe elobi.” Limbolá na mokuse lisolo oyo ebandi na lokasa 10.

Lamuká! Sɛtɛmbɛ

Tángá Matai 5:39. Na nsima lobá boye: “Okanisi ete Yesu alingaki koloba ete soki basali biso mabe tófanda nyɛɛ? [Tiká ye apesa eyano.] Lisolo oyo emonisi oyo Biblia elobi mpo na ndenge ya komibatela mpe koluka lisalisi ya Leta soki basali biso mabe.” Limbolá na mokuse lisolo oyo ebandi na lokasa 10.

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 1 Ɔkɔtɔbɛ

“Na mokili mobimba, bato ya mangomba nyonso babondelaka. Okanisi ete Nzambe ayokaka mpenza mabondeli mpe ayanolaka yango? [Tiká ye apesa eyano.] Biblia ezali kolendisa biso tóbondelaka. [Tángá Bafilipi 4:6, 7.] Zulunalo oyo ezali na biyano oyo Biblia epesi na mituna nsambo oyo bato bamitunaka na ntina ya libondeli.”

Lamuká! Ɔkɔtɔbɛ

“Toyokaka mbala mingi masolo ya bato oyo balongani na bango, bato ya politiki mpe bato mosusu bakosaki. Okanisi ete ekómi mpasi kozwa bato oyo tokoki kotyela motema? [Tiká ye apesa eyano.] Bato mingi bakanisaka ete vɛrsɛ oyo ezali kokokisama. [Tángá 2 Timote 3:1-5.] Zulunalo oyo emonisi epai tokoki kokuta bato oyo tokoki kotyela motema.”

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto