Manaka mpo na pɔsɔ ya 27 Desɛmbɛ
PƆSƆ EBANDI NA 27 DESƐMBƐ
□ Boyekoli ya Biblia na lisangá:
cf mok. 5 par. 16-20, etanda na lok. 55
□ Eteyelo ya mosala ya Teokrasi:
Botángi ya Biblia: 2 Ntango 25-28
Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
□ Likita ya mosala:
Min. 5: Mayebisi. “Calendrier ya 2011 elobeli Losambo na libota.” Lisukulu.
Min. 10: Ndenge oyo plan ekoki kosalisa biso na mosala ya kosakola. Lisolo ná bayangani ekouta na buku Eteyelo ya mosala, lokasa 167 tii na lokasa 168, paragrafe 1. Bósala mpe elakiseli ya mosakoli oyo azali kolobaloba ye moko. Na lisalisi ya buku oyo tokokabola na sanza ya Yanuali, azwi mwa miniti moke liboso ya kobima na mosala ya kosakola mpo na kobongisa na motó lisolo oyo akosolola na bato.
Min. 10: Nsuki mpɛmbɛ ezali motole ya kitoko. (Mas. 16:31) Lisolo ná bayangani ekouta na Annuaire 2010, lokasa 110, paragrafe 1-3. Nsima ya kolobela lisolo mokomoko, sɛngá bayangani báyebisa mateya oyo bazwi na masolo yango.
Min. 10: Omibongisa mpo na kokabola bazulunalo na sanza ya Yanuali. Lisolo ná bayangani. Na miniti moko to mibale, lobelá na mokuse makambo oyo ezali na bazulunalo yango. Na nsima, poná masolo mibale to misato, mpe sɛngá bayangani báyebisa mituna oyo bakotuna mpe bavɛrsɛ oyo bakotánga mpo na kokabola bazulunalo yango. Bósala bilakiseli mibale mpo na komonisa ndenge ya kokabola zulunalo mokomoko.