Tosengeli lisusu te kotalelaka Mokapo ya mokolo na likita mpo na mosala ya kosakola
Liboso, na likita mpo na mosala ya kosakola, tozalaki mbala mosusu kotalela na mokuse mokapo ya mokolo soki elobeli mosala ya kosakola. Esengeli kosalema lisusu bongo te. Tosengeli lisusu te kosalela mwa buku Tótángaka Makomami mokolo na mokolo mpo na kotambwisa likita mpo na mosala ya kosakola. Kaka ndenge ezalaki liboso, motambwisi akoki kosalela Biblia, Mosala na biso ya Bokonzi, buku Eteyelo ya mosala mpe buku Comment raisonner to makanisi mosusu oyo etali mosala ya kosakola. Ndeko oyo akotambwisa likita yango asengeli komibongisa liboso mpo abimisa makanisi oyo ekosalisa baoyo bakobima na mosala ya kosakola mokolo wana. Kaka ndenge ezalaki kosalema liboso, likita yango esengeli koumela miniti 10 to 15, eleka wana te; mpe esengeli kozala lisusu mokuse koleka soki esalemi nsima ya makita ya lisangá.