Biyano na mituna na bino
◼ Ntango boni tosengeli koyekola Biblia na moto oyo azali kokola malamu?
Soki moyekoli ya Biblia azali kokola malamu, eleki malamu kokoba koyekola na ye tii akosilisa buku mibale: Biblia eteyaka mpenza nini? mpe “Bótikala na kati ya bolingo ya Nzambe.” Esengeli kosalema bongo ata soki moyekoli azwi batisimo liboso ya kosilisa buku yango nyonso mibale. Nsima ya batisimo na ye, tokoki kokoba kozwa ngonga, kotánga mbala boni tozongeli ye mpe kotánga ye lokola moyekoli ya Biblia. Mosakoli oyo tobimi na ye akoki mpe kozwa ngonga soki apesaki makanisi na boyekoli yango.—Talá Mosala na biso ya Bokonzi ya Marsi 2009, lokasa 2.
Ezali na ntina mingi ete bato ya sika báyeba solo malamumalamu liboso ete tótika koyekola na bango. Esengeli ‘bápika misisa’ mpe ‘bátɛlɛma ngwi na kondima’ mpo bákoka kolonga mikakatano oyo bakokutana na yango. (Kol. 2:6, 7; 2 Tim. 3:12; 1 Pe. 5:8, 9) Lisusu, mpo báteya bato mosusu malamu, esengeli bázala na “boyebi ya sikisiki ya solo.” (1 Tim. 2:4) Soki toyekoli na moto babuku yango mibale, tokosalisa ye akoba kotambola malamu na ‘nzela oyo ememaka na bomoi.’—Mat. 7:14.
Liboso ya kondima moto azwa batisimo, bankulutu basengeli koluka koyeba soki moto yango ayebi malamu mateya ya ntina ya Biblia mpe soki bomoi na ye eyokani na mateya yango. Bankulutu basengeli mpenza kokeba liboso ya kondima kotalela moyekoli oyo asilisi naino buku ya liboso te. Soki moto akoki naino te mpo na kozwa batisimo, bankulutu bakozwa bibongiseli mpo na kopesa ye lisalisi oyo esengeli mpo akokisa masɛngami mpo na kozwa batisimo na mbala ya nsima.—Talá buku Tobongisami mpo na kosala mokano ya Yehova, nkasa 217-218.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 2]
Ezali na ntina mingi ete bato ya sika báyeba solo malamumalamu