Salisá bango ‘bátɛlɛma ngwi na kondima’
Tosepelaka mpenza komona ndenge Yehova azali kopambola mosala ya koyanganisa, na ndenge bato koleka 250 000 bazali kozwa batisimo mbula na mbula. (Mib. 28:2) Ntango mosakoli asalisi moyekoli tii azwi batisimo, mbala mingi mosakoli yango akobaka te koyekola na ye mpe atyaka likebi mingi na kosalisa bayekoli mosusu. Ntango mosusu, moyekoli mpe akoki kozala na mposa ya kokata boyekoli mpo alingi komipesa mingi na mosala ya kosakola. Kasi, ezali na ntina ete bayekoli ya Biblia bázwa moboko malamu na kati ya solo. Esengeli ‘bápika misisa’ na kati ya Kristo mpe ‘bátɛlɛma ngwi na kondima.’ (Kol. 2:6, 7; 2 Tim. 3:12) Na yango, nsima ya kozwa batisimo, moyekoli ya Biblia asengeli kokoba koyekola Biblia tii akosilisa buku oyo mibale: Biblia eteyaka mpe “Bolingo ya Nzambe.”—Talá Mosala na biso ya Bokonzi ya sanza ya minei 2011, lokasa 2.