Ndenge ya kobanda lisolo
(Soki zulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)
Mpo na kobanda koyekola na bato Biblia mokolo ya pɔsɔ ya liboso ya sanza ya Yuni
“Biso nyonso tokufelá bandeko to baninga. Ozalaka na elikya ya komona bango lisusu? [Tiká ye apesa eyano.] Yoká maloba oyo ya kobɔndisa.” Tángá mpe limbolá makambo oyo ezali na nse ya motó ya likambo ya moke ya liboso oyo ezali na lokasa 16 ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Yuni mpe moko ya bavɛrsɛ oyo batye wana. Pesá ye bazulunalo mpe bóyokana mpo ozongela ye mpo na koyanola na motuna oyo elandi.
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 1 Yuni
“Mingi kati na biso tozalaka na mokakatano ya kozwa mbongo mpo na kokokisa bamposa na biso ya mokolo na mokolo, mpe basusu bazali kutu ata na biloko ya kobikela te. Okanisi ete ekozala na mokolo oyo babola bakozala lisusu te? [Tiká ye apesa eyano. Na nsima tángá Nzembo 9:18.] Zulunalo oyo elobeli polele ntina oyo bobola ezali mpe emonisi oyo Biblia elobi mpo na ndenge oyo bobola ekosila.”
Lamuká! Yuni
“Terorisme ezali kotungisa bato na mokili mobimba. Mpo na yo, nini etindaka bato bákóma bateroriste? [Tiká ye apesa eyano.] Maloba oyo ya Biblia ezali kopesa biso elikya. [Tángá Nzembo 72:7, 14.] Zulunalo oyo eyebisi bantina oyo etindaka bato bákóma bateroriste mpe emonisi oyo Biblia elobi mpo na ndenge oyo terorisme ekosila mpe ntango nini ekosila.”