Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 5/12 lok. 4
  • Ndenge ya kobanda lisolo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndenge ya kobanda lisolo
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2012
  • Masolo mosusu
  • Ndenge ya kobanda lisolo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2013
  • Ndenge ya kobanda lisolo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2011
  • Ndenge ya kobanda lisolo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2011
  • Ndenge ya kobanda lisolo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2012
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2012
km 5/12 lok. 4

Ndenge ya kobanda lisolo

(Soki zulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)

Mpo na kobanda koyekola na bato Biblia mokolo ya pɔsɔ ya liboso ya sanza ya Yuni

Tángá Yisaya 42:8. Na nsima lobá boye: “Awa emonisi ete Nzambe azali na nkombo. Okanisi ete ezali na ntina tósalela nkombo ya Nzambe? [Tiká ye apesa eyano.] Talá ndenge zulunalo oyo elobi awa.” Pesá ye Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Yuni, mpe bótalela makambo oyo ezali na nse ya motuna ya liboso na lokasa 16. Tikelá ye bazulunalo, mpe bóyokana mpo ozongela ye mpo bótalela motuna oyo elandi.

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 1 Yuni

“Nalingi koyeba likanisi na yo na likambo moko ya ntina. [Fungolá na lokasa 3, mpe lakisá ye makanisi minei oyo ezali wana.] Likanisi nini eyokani na ndenge oyo otalelaka Biblia? [Tiká ye apesa eyano.] Talá oyo Biblia elobi mpo na yango moko. [Tángá Baroma 15:4.] Zulunalo oyo elobeli bantina mitano oyo emonisi ete Biblia ekeseni na babuku mosusu nyonso, mpe emonisi ndenge oyo yango ekoki kosalisa biso.”

Lamuká! Yuni

“Mbula na mbula, bamilio ya bato na mokili mobimba bazwaka maladi mpo balyaka bilei oyo ebebi. Okanisi ete biloko oyo tolyaka awa epai na biso ezali nyonso ya malamu? [Tiká ye apesa eyano.] Zulunalo oyo elobeli makambo minei oyo tokoki kosala mpo tóbatela libota na biso na bamaladi oyo eutaka na bilei oyo ezali lisusu malamu te. Emonisi mpe elaka oyo Biblia epesi ete etikali moke bato nyonso bakozala na bilei mingi mpenza mpe ya malamu.” Tángá Nzembo 104:14, 15.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto