Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 6/11 lok. 2
  • Litatoli ya balabala oyo ebotaka mbuma

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Litatoli ya balabala oyo ebotaka mbuma
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2011
  • Masolo mosusu
  • Tósakola nsango malamu bipai nyonso
    Mosala na biso ya Bokonzi—1996
  • Lolenge ya sika ya kopesa litatoli na bisika ya bato nyonso
    Mosala na biso ya Bokonzi—2013
  • Ndenge ya kopesa litatoli malamumalamu na bisika oyo bato bazalaka mingi
    Mosala na biso ya Bokonzi—2005
  • Lolenge moko ya sika ya kopesa litatoli na bisika ya bato nyonso
    Mosala na biso ya Bokonzi—2014
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2011
km 6/11 lok. 2

Litatoli ya balabala oyo ebotaka mbuma

1. Wapi lolenge moko oyo tokoki komekola Yesu?

1 Ntango Yesu azalaki kosakola awa na mabele, akakatanaki te mpo na kosolola na bato oyo azalaki kokutana na bango na balabala mpe na bisika oyo bato bazalaka ebele. (Luka 9:57-61; Yoa. 4:7) Mposa na ye ezalaki ya koyebisa bato ebele koleka nsango ya ntina mingi oyo azalaki kosakola. Lelo oyo, litatoli ya balabala ezali lolenge ya malamu mpenza ya kosalisa bato bázwa bwanya ya Nzambe. (Mas. 1:20) Litatoli ya balabala ekobota mbuma soki toyebi koluka mabaku ya kosolola na bato mpe tosaleli bososoli.

2. Mpo na nini esɛngaka koluka mabaku ya kosolola na bato ntango tozali kopesa litatoli ya balabala?

2 Luká mabaku: Mbala mingi, ezalaka malamu kotɛlɛmisa bato na esika ya kotɛlɛma kaka to kofanda esika moko mpo na kozela baleki-nzela báya epai na biso. Sɛká mwa moke, luká kokutanisa miso na moto moko, zalá na motema ya kokita mpe lobá na limemya. Soki ozali kosakola elongo na basakoli mosusu, mbala mingi ekozala malamu mosakoli mokomoko asolola na moto moko. Osengeli mpe kosala makasi mpo na kozongela bato oyo bamonisaki ete basepeli. Soki ebongi, nsima ya kosolola na moto moko, tuná ye na boboto ndenge nini okoki kokutana na ye lisusu. Basakoli mosusu bapesaka litatoli ya balabala na esika moko boye mbala na mbala, mpe yango epesaka bango libaku ya kosolola na bato moko wana mbala na mbala mpe kolandela mposa oyo bamonisi.

3. Ndenge nini tokoki kosalela bososoli ntango tozali kopesa litatoli ya balabala?

3 Salelá bososoli: Salelá bososoli mpo na koyeba esika nini okoki kotɛlɛma na balabala mpe nani okoki kotɛlɛmisa. Ezali na ntina te kopesa litatoli na moleki-nzela nyonso. Yebá kosalela miso. Na ndakisa, soki moto azali kotambola mbangumbangu, ekozala malamu kotika ye aleka. Soki tozali kopesa litatoli liboso ya bamagazini, tósala nyonso mpo ete nkolo magazini amitungisa te. Mbala mingi, ezalaka malamu kopesa bato litatoli ntango bazali kobima na magazini, kasi te ntango balingi kokɔta. Tɛlɛmisá bato na ndenge oyo ekobangisa bango te mpe ekosutukisa bango te. Lisusu, monisá bososoli ntango ozali kopesa bato mikanda. Soki moto asepeli mpenza te, okoki kopesa ye trakte na esika ya kopesa ye bazulunalo.

4. Mpo na nini litatoli ya balabala ezali lolenge ya kosakola oyo epesaka esengo mpe ebotaka mbuma mingi?

4 Litatoli ya balabala esalisaka biso tólona mboto mingi ya solo na ntango mokuse. (Mos. 11:6) Bato mosusu oyo tokutanaka na bango na balabala bakoki kozala baoyo tokoki te kokuta bango na ndako ntango tosakolaka ndako na ndako. Mpo na nini te komityela mokano ya kopesa litatoli ya balabala, lolenge ya litatoli oyo epesaka esengo mpe ebotaka mbuma mingi?

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto