Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 10/96 nk. 3-6
  • Tósakola nsango malamu bipai nyonso

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tósakola nsango malamu bipai nyonso
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1996
  • Masolo mosusu
  • Lolenge ya sika ya kopesa litatoli na bisika ya bato nyonso
    Mosala na biso ya Bokonzi—2013
  • Ndenge ya kosakola na bisika ya mombongo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2004
  • Okoki kopesa litatoli ya libaku malamu!
    Mosala na biso ya Bokonzi—2010
  • Litatoli ya balabala oyo ebotaka mbuma
    Mosala na biso ya Bokonzi—2011
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—1996
km 10/96 nk. 3-6

Tósakola nsango malamu bipai nyonso

1 Baklisto ya liboso basakolaki nsango malamu bipai nyonso. Molende na bango ezalaki mpenza makasi na boye ete mibu 30 nsima ya lisekwa ya Yesu Klisto, nsango ya Bokonzi esilaki kosakolama “epai na bato nyonso na nsé na Likoló.”​—Kols. 1:23.

2 Lelo oyo, basaleli na molende ya Yehova bazali kolanda bobele mokano yango moko: koyebisa nsango malamu ya Bokonzi epai na ebele ya bato. Nini ekoki kosalisa biso na kokokisa mokano wana? Bato mingi bakómi kosala misala mizwaka mokolo mobimba mpe mbala mingi bazalaka te ntango tokendaka kotala bango. Soki bazali na mosala te, bazali kobima, kosomba biloko to kominanola. Lolenge nini tokoki koyebisa nsango ya Bokonzi epai na baoyo kati na bango babongi na yango?​—Mat. 10:11.

3 Tokoki kosolola na basusu ata na bisika na bango ya mosala. Ata kati na bingumba mike, ezali na bisika ya misala epai kuna bato mingi balekisaka ntango na bango na boumeli ya mokolo. Kati na bingumba minene, bato oyo basalaka na bakompanyi to na babiro, ezala mpe baoyo bafandaka na bandako minene epai kuna ezalaka mpasi na bato kokɔta, bazali kozwa litatoli, mingi kati na bango bazali koyoka yango mpo na mbala ya liboso. Bawikende, kati na baoyo tokutani na bango, wana bazali kolekisa ntango kati na parke moko, na esika ya kozwa mwa mopɛpɛ, na molako moko to na nganda moko, to kati na baoyo bazali kozela na parkingi to na esika ya mombongo, bamoko kati na bango bandimaka nsango malamu.

4 Ntalo monene ya basakoli basalaka makasi mpenza na kopesa litatoli kati na bisika minene, epai kuna bato bazalaka mingi. Libosoliboso, Batatoli wana bazalaki kokakatana mpe mwa moke na bobangi, mpo ete basakolaka mingi na ndenge bameseni, na ndakisa na ndako na ndako. Bazali na mayoki nini sikawa?

5 Ndeko moko oyo ameseni mingi na mosala alobaki ete “Mosala na ngai ezwaki lisusu nguya!” Mosusu abakisaki ete: “Yango ezali kopesa ngai nzela ya kotya makanisi na ngai nyonso na mosala.” Mobangé mobongisi-nzela moko alobaki ete: “Yango epesaki ngai lisusu makasi na makanisi, na nzoto mpe na elimo, . . . mpe nazali kokóba kokende liboso!” Mosakoli moko amoni ete azali kokutana na ebele ya bato oyo basololá naino na Batatoli ya Yehova te. Bilenge mpe bazali na esengo na kosangana na mosala oyo ya kosepelisa. Moko kati na bango alobi ete: “Ezali likambo ya kosepelisa mpamba te likoki ezali ya kosolola na ebele ya bato.” Mosusu alobi ete: “Nasilá naino kotika mikanda mingi boye te!” Ezali wana makambo mauti na teritware moko oyo basakolaka mingi.

6 Bakɛngɛli-batamboli bazali na esika ya liboso: Koyebáká ete “makambo na mokili oyo mazali kobongwana,” la Société auti kala mingi te kosɛnga na bakɛngɛli-batamboli ete bábongola manáka na bango ya mosala ya kosakola na boumeli ya pɔ́sɔ mpo ete bákoka koyebisa nsango malamu ya Bokonzi epai na bato mingi. (1 Kol. 7:31) Uta bambula mingi, bakɛngɛli ya zongazonga balekisaka ntɔ́ngɔ́ na bango na mosala ya kosakola ndako na ndako mpe balekisaka nsima na midi na kosala bozongeli ya sika mpe na kotambwisa boyekoli ya Biblia. Ekoki kozala ete manáka oyo ezali naino kolandama na bitúká mosusu. Nzokande, na bitúká mosusu eloko moko ezali kosalema te mpo na kosakola ndako na ndako na boumeli ya bantɔ́ngɔ́ mosusu. Soki ezali bongo, mokɛngɛli-motamboli, mbala mosusu, akomona malamu na kolekisa ntɔ́ngɔ́ na kosakola na bamagazini to kopesa litatoli na balabála. Akoki lisusu kokamata bibongiseli mpo ete bituluku ya moke epesa litatoli na bandako minene oyo izali na babiro, na bakartyé ya mombongo, na baparkingi to na bisika mosusu oyo bato bazalaka mingi. Soki basakoli bazali kosalela malamu ntango oyo bazali kolekisa na mosala ya kosakola, bato mingi bakoyoka nsango.

7 Balapólo ezali komonisa ete bakɛngɛli-batamboli mpe basakoli bayambaki malamu mabongwani wana. Bankulutu basɛngaki na mokɛngɛli ya zongazonga ete abongisa ndambo na basakoli na mitindo wana ya mosala oyo misengeli kotalelama kati na lisangá mokomoko. Ezali litomba mpo na basakoli yango ete bábimaka elongo na mokɛngɛli-motamboli kati na misala wana. Na nsima, na ngala na bango, bakoki kobongisa basusu. (2 Tim. 2:2) Na motindo wana, ebele na bato bazali sikawa koyoka nsango malamu.

8 Ezali solo ete bokozela te mokɛngɛli ya zongazonga mpo na komeka mwa mitindo mosusu wana ya mosala ya kosakola. Talá mwa makanisi oyo bokomona mbala mosusu ete ezali na ntina kati na teritware na bino:

9 Litatoli na balabála: ‘Bato bazali wapi?’ tomitunaka boye ntango mosusu wana tozali kosakola na kartyé oyo bato bazalaka te na ntɔ́ngɔ́ na boumeli ya pɔ́sɔ. Likoki ezali ya kokutana na basusu wana bazali kokende kosomba biloko. Osilá komeka kosolola na bango na kopesáká litatoli na balabála? Motindo oyo ya mosala ya kosakola ekoki kobota mpenza mbuma ntango tozali kosala yango na lolenge malamu. Na esika ete tózala bobele esika moko na bazulunalo na mabɔkɔ, ekozala malamu kosolola na bato mpe kobanda lisoló ya boninga. Ntina ezali te ya kopesa litatoli na baleki-nzela nyonso. Sololá, na ndakisa, elongo na baoyo bazali kokende mbangumbangu te, baoyo bazali kotalatala biloko bitandami, baoyo batɛlɛmi na bavuatire na bango to baoyo bazali kozela babisí. Mpo na kobanda, tosengeli kopesa moto mbote ya boninga mpe komona mayoki na ye. Soki asepeli kosolola, tuná ye likanisi na ye likoló na likambo moko oyo likoki kosepelisa ye.

10 Wana akendaki kotala lisangá moko, mokɛngɛli-motamboli moko abyangaki basakoli motoba kosangana elongo na ye mpe na mwasi na ye mpo na kopesa litatoli na balabála. Matomba nini mabimaki? Andimi ete: “Tolekisaki ntɔ́ngɔ́ moko malamu mpenza! Moto moko azangaki te. Tokabolaki bazulunalo 80 mpe ebele ya batrakte. Tosololaki na bato mingi masoló ya kosepelisa. Mosakoli moko oyo asakolaki na balabála mpo na mbala ya liboso, alobaki ete: ‘Nazali na solo uta bambula mingi, kasi natikalaki kokanisa te na bisika oyo nazalaki koleka!’ Na nsuka ya pɔ́sɔ, bazulunalo mingi oyo ezalaki kati na lisangá esilaki.”

11 Ntango akendaki na lisangá mosusu, bobele mokɛngɛli-motamboli wana azwaki lapólo ete mwa basakoli bapesaki litatoli na balabála na ntɔ́ngɔ́ntɔ́ngɔ́, kasi bazwaki matomba mingi te. Ndeko mwasi moko asololaki bobele na bato mibale na boumeli ya mosala na ye ya kosakola, mpamba te bato nyonso mosusu oyo akutanaki na bango bazalaki kokende nokinoki na misala na bango. Mokɛngɛli-motamboli apesaki toli na mokomoko ete azonga bobele na balabála yango wana moi ebandi kobima. Ezali yango nde basalaki, mpe basakolaki kino na midi. Ndeko mwasi oyo asololaki bobele na bato mibale na ntɔ́ngɔ́ntɔ́ngɔ́ asololaki na bato mingi na mbala oyo ya mibale. Akabolaki bazulunalo 31 mpe mwa babúku 15, akamataki nkombo mpe adrɛsi ya bato nsambo mpe abandaki boyekoli mibale ya Biblia! Basakoli mosusu ya etuluku wana bazwaki mpe matomba ya kolendisa.

12 Ntango okutani na moto oyo azali komonisa bosepeli, salá makasi ete ozwa nkombo na ye, adrɛsi na ye mpe nimero na ye ya telefone. Na esika ya kotuna ye yango na mbalakaka, okoki koloba ete: “Nasepeli mingi na lisoló oyo. Likoki ekozala ya kokóba yango na ntango mosusu?” To tuná ye ete: “Likoki ekozala ya kokutana na yo na ndako na yo?” Na lolenge oyo, bato mingi bandimaka ete bákenda kotala bango. Omindimisa ete ozali na nkasa mingi ya libyangami mpo na baoyo bakolinga koyangana na makita.

13 Soki ozali kosolola na moto oyo azali komonisa bosepeli nzokande azali kofanda na teritware ya lisangá mosusu, zwá nkombo na ye, adrɛsi na ye mpe nimero na ye ya telefone mpo ete bandeko ya teritware yango bákoka kolandela bosepeli oyo ye amonisaki. Litatoli na balabála likopesa nde nzela na kopalanganisa na molende nyonso nsango malamu na etúká na bino? Soki ezali bongo, bómibongisa mpo na kosangana na litatoli ya balabála na ngonga oyo ebongi mpe oyo ekopesa bino nzela ya kokutana na bato mingi.

14 Litatoli na babisí: Na ntɔ́ngɔ́ moko, babongisi-nzela bazwaki ekateli ya kopesa litatoli epai na bato oyo bazalaki kozela bisí pembeni na eteyelo moko. Basololaki mpenza malamu, kasi bakutanaki na mokakatano moko. Wana lisoló ekómaki kotɔ́ka, bisí eyaki, yango ekataki na mbalakaka lisoló na bango. Babongisi-nzela basilisaki mokakatano wana na komatáká na bisí mpo na kokóba kopesa litatoli epai na bato oyo bazalaki na kati, wana yango ezalaki kotambola na engumba. Ntango bakómaki esika mituka esukaka, babongisi-nzela bazwaki motuka ya kozonga na kolandáká kopesa litatoli. Nsima na kokende mpe kozonga mbala mingi, balobelaki matomba oyo bazwaki: bakabolaki bazulunalo 200 mpe babandaki boyekoli motoba ya Biblia! Bato mosusu oyo bazalaki kati ya bisí bandimaki kopesa adrɛsi na bango, nimero na bango ya telefone mpo ete bákenda kotala bango epai na bango. Pɔ́sɔ elandaki, babongisi-nzela bazongaki na esika bazwaka bisí mpe basalaki lisusu sé ndenge yango. Bakabolaki bazulunalo 164 mpe babandaki boyekoli moko ya sika ya Biblia! Na esika moko bato bazelaka bisí, moto moko amataki na bisí mpe afandaki na esika bobele moko oyo etikalaki mpamba: pembeni na mobongisi-nzela moko. Atalaki ndeko mpe alobaki na ye na mwa kosɛka ete: “Nayebi ete ozali na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli moko mpo na ngai!”

15 Ebele ya basakoli bazali na molende nyonso kopesa litatoli ntango bazali kosala mobembo na bisí, na engbunduka to na mpɛpɔ. Ndenge nini tokoki kobanda lisoló elongo na moto oyo azali pembeni na biso? Mosakoli moko ya mibu 12 amonaki malamu kotánga Lamuká! kati na bisí, kolikyáká ete akozanga te kobenda likebi ya elenge mwasi moko oyo azalaki pembeni na ye. Ezali yango nde esalemaki! Elenge mwasi yango atunaki ye nini azalaki kotánga, mpe ayanolaki ete ezalaki lisoló moko oyo ezalaki komonisa lolenge ya kosilisa mikakatano oyo bilenge bazali kokutana na yango. Abakisaki ete lisoló yango esalisaki ye mingi mpe ete elenge mwasi wana akoki mpe kozwela yango litomba. Andimaki kozwa bazulunalo na esengo nyonso. Bilenge mosusu mibale bayokaki lisoló na bango mpe basɛngaki ete bázwa bazulunalo. Mpo na yango, mokumbi-motuka atɛlɛmisaki bisí pembeni ya nzela mpe atunaki soki makambo nini ya kosepelisa mazali kati na bazulunalo wana. Nsima na kozwa eyano, ye mpe azwaki yango. Ya solo, nyonso wana elingaki kosalema te soki elenge mosakoli wana azalaki na bazulunalo mingi te ya kolakisa epai na baoyo bazalaki komonisa bosepeli!

16 Litatoli na baparke mpe na baparkingi: Soki ntango ya malamu ezali, litatoli na baparke mpe na baparkingi ezalaka mwango moko malamu mpo na kosolola na bato. Osilá komeka kopesa litatoli na parkingi ya esika moko ya mombongo? Wana okómi na parkingi, talá na boumeli ya mwa miniti makambo mazali koleka zingazinga na yo. Luká moto oyo azali kokenda mbangumbangu te to oyo azali kozela na kati ya vuatire etɛlɛmi mpe meká kobanda lisoló ya boninga. Soki lisoló lizali kokóba, yebisá nsango ya Bokonzi. Salá makasi na kozala yo moko, kasi kotangwa mingi te na mosakoli mosusu. Kozala na sakosi ya monene te to kobenda likebi ya bato te na mosala na yo na lolenge moko to mosusu. Kobenda likebi ya bato te. Mbala mosusu ekozala malamu oumela te na parkingi moko mpe kendá na mosusu. Soki moto aboyi kosolola na yo, tiká ye na bonkónde nyonso mpe meká kosolola na moto mosusu. Mpo ete asalaki motindo oyo, ndeko moko akabolaki bazulunalo 90 na sanza moko na kopesáká litatoli na baparkingi!

17 Bato mosusu bakendaka na baparke mpo na kominanola, mpo na kosakana to mpo na kolekisa ntango elongo na bana na bango. Na kobebisáká te ngonga na bango, meká koluka likoki ya kopesa litatoli. Ndeko moko abandaki kosolola elongo na mokɛngɛli ya parke moko mpe amonaki ete moto yango azalaki komitungisa na ntina na bilangwiseli mpe na ntina na bomoi ya bana na ye na mikolo mizali koya. Boyekoli moko ya Biblia ebandaki, mpe yango elandaki kosalema pɔ́sɔ na pɔ́sɔ kati na parke.

18 Litatoli ya libaku malamu na bisika ya mombongo: Atako likoki ezalaka ntango nyonso te ya kosakola na lolenge lobongisami na bamagazini kati na bisika ya mombongo na ntina na bipekiseli ya mboka, basakoli mosusu balukaka mabaku ya kopesa litatoli ya libaku malamu. Bafandaka na ebónga mpe babandaka lisoló ya boninga elongo na baoyo bayaka kofanda wana mpo na kopema. Ntango bato bazali komonisa bosepeli, na mayele nyonso balakisaka bango trakte to zulunalo mpe basalaka makasi na kokamata bibongiseli mpo na kokutana na bango lisusu. Nsima ya kolekisa mwa miniti na kopesa litatoli na eteni moko ya esika ya mombongo, bakendaka na esika mosusu mpe basololaka elongo na moto mosusu. Ya solo, tosengeli te kobenda likebi ya bato ntango tozali kopesa litatoli ya libaku malamu lolenge wana.

19 Ntango opesi moto mbote, bandá na kosolola na lolenge ya boninga. Soki molobani na yo asangani na lisoló, tuná ye motuna moko mpe yoká ye na likebi nyonso wana azali koloba. Tyá mpenza likebi na makambo azali koloba. Monisá ye ete ozali kozwa na motuya likanisi na ye. Soki alobi makambo oyo mabongi, yebisá ye ete ondimi maloba na ye.

20 Ndeko mwasi moko asololaki na lolenge ya malamu na mobangé mwasi moko na kolobáká ete biloko emati mpenza ntalo. Nokinoki mwasi yango andimaki, yango epesaki nzela na lisoló moko ya mɔ́tɔ. Ndeko mwasi azwaki nkombo mpe adrɛsi ya mwasi yango mpe akendaki kotala ye na boumeli ya pɔ́sɔ.

21 Mosala ya kosakola na bamagazini: Teritware ya masangá mosusu ezalaka na bakartyé oyo ezali na bamagazini mingi elandani. Ndeko oyo atalaka bateritware akoki kobongisa bakarte etali bobele bisika oyo makambo ya mombongo mazalaka mpenza makasi. Akokoma polele na bateritware nyonso oyo esangisi bakartyé motindo wana ete bakomɛlɛsá basengeli kotalama na ntango oyo ekeseni na oyo ya bato mosusu. Na bateritware mosusu, tokoki kotala bakomɛlɛsá mpe bafandi mosusu sé na mbala moko. Bankulutu bakoki kobyanga basakoli oyo bameseni na mosala ete bátalaka pɔ́sɔ na pɔ́sɔ bateritware ya mombongo mpo ete tóbosana te mosala ya kosakola na bamagazini.

22 Soki basɛngi na yo ete osangana na mosala wana mpo na mbala ya liboso, mwango mpo na ‘kozala na molende’ ezali ya kokende libosoliboso na bamagazini ya mike; na nsima, wana okomesana na yango, yeisá monene mosala na yo na kosakoláká na bamagazini ya minene. (1 Tes. 2:2) Wana ozali kosakola na bamagazini, latá lokola nde ozalaki kokenda na likita na Ndako ya Bokonzi. Soki likoki ezali, kɔtá na magazini wana kiliyá moko azali te mpo na kozela biloko. Sɛngá ete osolola na mokambi (gérant) ya magazini to mokóló na yango. Zalá na esengo, mpe mingimingi lobá mokuse. Ntina ezali te ya koloba ete limbisá ngai. Bakomɛlɛsá mingi bazali mpo na koyamba bakiliyá mpe bayebi ete bato bakobimela bango ntango nyonso.

23 Nsima na kopesa mbote epai na komɛlɛsá moko, okoki koloba ete: “Bakomɛlɛsá bazalaka na mosala mingi na boye ete ezalaka mpasi mpo na kokuta bango na ndako na bango; yango wana toyei kotala yo na esika na yo ya mosala mpo na kolakisa yo lisoló oyo ezali kotinda na kokanisa.” Na nsima, lobelá likambo moko to makambo mibale oyo mazali na bazulunalo ya sika.

24 Soki okutani na mokambi, okoki mpe komeka koloba ete: “Tomoni ete bakomɛlɛsá balingaka koyeba makambo mingi oyo mazali koleka. Nimero ya sika oyo ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli (to ya Lamuká! ) ezali na lisoló moko oyo etali mokomoko kati na biso.” Yebisá likambo yango mpe sukisá na kolobáká ete: “Tondimisami ete botángi na yango ekosepelisa yo mingi.”

25 Soki basáli bazali mpe soki omoni ete ezali malamu, okoki kobakisa ete: “Okosepela ete nalakisa yango epai na basáli na yo?” Soki nzela epesami na yo, kobosana te ete olakaki ye ete okozwa ntango mingi te, mpe mokambi akomizela ete otosa maloba na yo. Soki basáli basepeli kosolola na yo mwa ntango molai, ekozala malamu okende kotala bango epai na bango.

26 Kala mingi te, kati na engumba moke moko, basakoli babimaki elongo na mokɛngɛli ya zongazonga kati na mosala ya kosakola na bamagazini. Na ebandeli, bamoko bazalaki na mwa bobangi, mpamba te basilaki kosangana na yango liboso te; kasi nokinoki bobangi esilaki mpe basepelaki mingi na mosala yango. Naino ngonga moko ekokaki te, basololaki na bato 37 mpe bakabolaki bazulunalo 24 mpe mwa babúku 4. Ndeko mobali moko alobaki ete na ntango akendaka mosala ya ndako na ndako akutanaka te na bato mingi ndenge akutanaki na bango na mosala ya kosakola na bamagazini bobele nsima ya mwa ntango moke.

27 Tóluka mabaku ya kosakola: Yesu asukaki te na kosakola bobele na lolenge oyo ebongisami. Apalanganisaki nsango malamu ntango nyonso oyo libaku limonanaki. (Mat. 9:9; Luka 19:1-10; Yoa. 4:6-15) Talá lolenge basakoli mosusu bazali koluka mabaku ya kosakola.

28 Bamoko bazalaka na momeseno ya kopesa litatoli epai na baboti oyo bazali kozela bana na bango bábima na eteyelo. Lokola baboti mosusu bakómaka wana soko miniti 20 liboso, bazwaka ntango ya kobanda lisoló ya kolendisa likoló na likambo moko ya Biblia.

29 Ebele ya babongisi-nzela bazali kosala makasi na kosolola mingimingi na bato oyo batalelami mingi na masoló mosusu oyo malobelami kati na bazulunalo na biso. Na ndakisa, ndeko mwasi moko azwaki matomba malamu na kokendáká na biteyelo motoba oyo bizali na teritware ya lisangá na ye mpo na kolakisa bango molɔngɔ́ ya masoló oyo ezalaki na motó na likambo “Kokwea ya kelasi,” oyo ebimaki na Lamuká! ya 22 Desɛ́mbɛ 1995 (ebimeli ya Lifalansé). Akendaki mpe na bisika ya kopesa bato lisungi, elongo na bazulunalo oyo ezalaki kolobela bomoi ya libota mpe kobebisama ya bana, mpe azwaki ndingisa ya kozonga lisusu na banimero mosusu oyo ezali kolobela makambo motindo wana. Oyo ye amonaki na esika moko ya koluka mosala na ntina na Lamuká! ya 8 Mársi 1996 (ebimeli ya Lifalansé) oyo elobelaki kozanga mosala, abéngaki yango likambo ya “kokamwa.”

30 Mokɛngɛli moko ya etúká ayebisi ete apesaka mbala mingi litatoli ya libaku malamu elongo na mwasi na ye wana bazali kokende kosomba biloko. Baponaka ntango oyo magazini etondi na bato te mpe oyo bakiliyá bazali kotambola katikati ya milɔngɔ́ na yango kozanga ete báwela. Na motindo yango, bazwaki likoki ya kopesa masoló mingi ya kosepelisa.

31 Basakoli mingi bazali kozwa matomba malamu na kopesáká litatoli na bisika ya bamasini ya kosukola bilamba. Basukaka te bobele na kotika bazulunalo ntango moto azali te. Mokano na bango ezali ya koyebisa nsango malamu epai na bato; na bongo basalaka makasi na kosolola mpenza na bakiliyá oyo bayaka na esika ya masini ya kosukola bilamba.

32 Na bisika mosusu, basakoli oyo baponami bapesameli ndingisa ya kopesa litatoli na libándá ya mpɛpɔ. Bazali mbala mosusu kozwa esengo ya kosakola epai na bato oyo bazali kosala mibembo na mikili mingi mpe baoyo bazali kofanda na mikili epai kuna Batatoli ya Yehova bazali mingi te. Ntango bato wana bazali komonisa bosepeli, batikelaka bango trakte to bazulunalo.

33 Soki likoki ezali te, na teritware ya lisangá, ya kopesa litatoli na bafuteli-ndako oyo bafandi na bandako minene epai kuna kokɔta epekisami, basakoli mosusu bazwaki momeseno ya kosakola na takte nyonso epai na bakɛngɛli oyo bazali kosala wana to na bakambi kati na babiro na bango. Basalaka sé ndenge moko na bisika oyo bakabolaka mapango mpe oyo kokɔta epekisami. Mokɛngɛli moko ya zongazonga alandaki mwango oyo ye na mwa ndambo ya basakoli na bandako nsambo ezingelami na mapango. Na mbala nyonso, bazalaki kolimbwela mokambi ete soki ndingisa epesami te na kokutana na bafuteli-ndako lokola basalaka yango na momeseno, bakolinga te ete bázanga koyeba makambo mazali kati na banimero ya sika ya bazulunalo na biso. Bakambi ya bandako wana nsambo bandimaki na esengo nyonso bazulunalo mpe basɛngaki ete bámemela bango banimero mosusu!

34 Tósala makasi na kosakola bipai nyonso: Mpo na komitambwisa na boyokani na komipesa ya bomoto na biso epai na Nzambe, esengeli na biso koyeba ete mosala ya kosakola nsango ya Bokonzi oyo epesami na biso esengeli kosalema nokinoki. Soki tolingi kosolola na bato na ntango oyo ezali malamu mpo na bango, tosengeli kobosana bamposa na biso ‘mpo ete na nzela nyonso tókoka kobikisa bamosusu.’ Basaleli nyonso ya Yehova oyo bamipesi mpe bazwi batisimo bazali na mposa ya kozongela maloba ya Paulo, oyo alobaki ete: “Nazali kosala nyonso mpo na nsango malamu ete nakóma mokabani na yango.”​—1 Kol. 9:22, 23.

35 Paulo akomaki na nsima ete: “Nakomikumisa na esengo kati na bolɛmbu ete nguya na Klisto efanda likoló na ngai. . . . Mpo wana ezali ngai na bolɛmbu nazali na nguya.” (2 Kol. 12:9, 10) Na maloba mosusu, ezali na moto moko te kati na biso oyo akoki kokokisa mosala oyo na nguya na ye moko. Tosengeli kobondela Yehova mpo na kozwa nguya ya elimo santu na ye. Soki tozali kosɛnga nguya epai na Nzambe, tokoki kondimisama ete akoyanola na mabondeli na biso. Bolingo na biso mpo na bato ekotinda bongo biso na koluka mabaku ya koyebisa bango nsango malamu epai bazali. Na boumeli ya pɔ́sɔ ezali koya, mpo na nini te komeka moko na makanisi mapesami na siplemá oyo?

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto