Yehova azali kopesa biso formasyo mpo na mosala ya kosakola
1. Ntango Yehova apesaka bato mokumba moko, asalaka lisusu nini?
1 Ntango Yehova apesaka bato mokumba moko, apesaka bango mpe lisalisi oyo basengeli na yango mpo na kokokisa mokumba yango. Na ndakisa, ntango Yehova ayebisaki Noa atonga masuwa, likambo oyo Noa asalá naino te, ayebisaki ye mpe ndenge nini akosala yango. (Eba. 6:14-16) Ntango Yehova atindaki Moize, oyo azalaki mobateli ya bampate, mpo akende kokutana na mikóló ya Yisraele mpe na Farao, ayebisaki ye boye: “Ngai moko nakozala elongo na monɔkɔ na yo mpe nakoteya yo oyo osengeli koloba.” (Kob. 4:12) Yehova alakisaka biso mpe ndenge ya kokokisa mokumba na biso ya kosakola nsango malamu. Apesaka biso formasyo mpo na mosala yango na nzela ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi mpe ya Likita ya Mosala. Ndenge nini formasyo yango ekoki kosalisa biso?
2. Tokoki kosala nini mpo Eteyelo ya mosala ya Teokrasi esalisa biso?
2 Eteyelo ya mosala ya Teokrasi: Liboso ya kokende makita, tángá mpe yekolá masolo oyo ekosalema na pɔsɔ wana. Na nsima, ntango okomona ndenge bana-kelasi bazali kosala masolo yango, okokolisa makoki na yo ya koteya. (Mas. 27:17) Memá buku na yo Eteyelo ya mosala na makita mpe salelá yango mpo na kokoma makanisi mosusu. Ntango mokɛngɛli na eteyelo azali kolobela makambo oyo ezali na buku yango nsima ya lisolo ya mwana-kelasi mokomoko, tyá mokɔlɔtɔ na nse ya makanisi ya ntina oyo olingi kosalela; salelá mpe bisika oyo etikali mpamba, oyo ezali pembeni ya makomi mpo na kokoma makanisi ya ntina. Kasi, mpo Eteyelo ya mosala ya Teokrasi esalisa yo mpenza, osengeli kokomisa nkombo na eteyelo yango. Osili kosala yango? Soki ozwi lisolo na eteyelo yango, bongisá yango malamu mpe salelá toli oyo bapesi yo. Ntango ozali na mosala ya kosakola, salelá makambo oyo oyekoli.
3. Tokoki kosala nini mpo Likita ya Mosala esalisa biso?
3 Likita ya Mosala: Mpo tóbosana te mateya oyo ekopesama na likita yango, tosengeli kotánga masolo nyonso liboso mpe komibongisa mpo na kopesa bakomantɛrɛ. Soki bakomantɛrɛ na biso ezali mikuse, yango ekopesa nzela na bandeko mingi bápesa mpe bakomantɛrɛ. Landá na likebi ntango bazali kosala bilakiseli, mpe salelá makambo oyo omoni ete ekosalisa yo obongisa mosala na yo ya kosakola. Bombáká malamu masolo ya ntina mingi ya Mosala na biso ya Bokonzi oyo ekoki kosalisa yo na mosala ya kosakola.
4. Mpo na nini tosengeli kosalela malamu formasyo oyo Yehova apesaka biso?
4 Ndenge moko na mikumba oyo Nzambe apesaki Noa mpe Moize, mokumba na biso ya kosakola nsango malamu na mabele mobimba ezali pɛtɛɛ te. (Mat. 24:14) Soki tozali kotya motema epai ya Yehova, Molakisi na biso Monene, mpe tozali kosalela malamu formasyo oyo azali kopesa biso, tokokokisa mokumba na biso malamu.—Yis. 30:20.